Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOKIMA BAMALADI MOSUSU

Omibatela na bamaladi

Omibatela na bamaladi

BINGUMBA mingi ya kala ezalaki kobatelama na bifelo ya minene. Soki monguna atɔbɔli efelo yango ata mwa moke, engumba mobimba ezalaki kokóma na likama. Nzoto na yo ezali lokola engumba oyo ezingami na bifelo. Mpo ozala nzoto malamu yango etaleli ndenge oyo obatelaka yango. Talelá makambo mitano oyo ekoki kosala ete obɛla mpe ndenge oyo okoki kosala mpo omibatela.

1 MAI

LIKAMA: Soki moto asaleli mai oyo “ekɔti” mikrobe, mikrobe yango ekoki kokɔta na nzoto.

KOMIBATELA: Mpo omibatela malamu, osengeli kosala ete esika ozwaka mai ekɔta mikrobe te. Soki omoni ete esika ozwaka mai ekɔti mikrobe to omoni lokola mikrobe ekɔti, okoki kotɔkisa mai to kotya yango nkisi na ndako mpo eboma mikrobe. * Bombá mai ya pɛto na eloko oyo ezipami malamu mpe soki olingi otoka, salelá kɔpɔ to saani ya pɛto. Kokɔtisa mabɔkɔ te na mai ya pɛto. Soki likoki ezali fandá na kartye oyo balongolaka basalite na ndenge oyo ebongi mpo esika bato batokaka mai ekɔta mikrobe te.

2 BILEI

LIKAMA: Mikrobe ekoki kozala na kati ya bilei to likoló na yango.

KOMIBATELA: Bilei oyo ekɔti mikrobe ekoki komonana kitoko na miso mpe etongaka nzoto. Yango wana zwá momeseno ya kosokola malamumalamu bambuma mpe bandunda nyonso. Ntango olingi kolamba to kotyela bato bilei na mesa, omindimisa ete banzungu to basaani, esika ozali kolamba mpe mabɔkɔ na yo ezali pɛto. Bilei mosusu esɛngaka kolamba yango na mɔtɔ makasi mpo mikrobe ekufa. Kebá na bilei oyo langi ebongwani mpe ezali kopesa nsolo mabe, yango emonisaka ete ekɔti ebele ya mikrobe. Soki bilei etikali, tyá yango noki na frigo. Soki ozali kobɛla kolambela bato biloko te. *

3 BANYAMA MIKEMIKE

LIKAMA: Banyama mosusu ya mikemike ekoki kopesa yo maladi mpo ezalaka na bamikrobe na kati.

KOMIBATELA: Mpo banyama mikemike yango báswa yo te, zalá na kati ya ndako ntango banyama yango ezali kotambola to latá bilamba oyo ekobatela yo, na ndakisa bilamba ya mabɔkɔ milai mpe patalo ya molai. Laláká na kati ya moustiquaire oyo batyá nkisi mpe saleláká nkisi oyo ebomaka banyama mikemike. Bwakáká mai oyo eumeli mpo bangungi ekoki kobota. *

4 BANYAMA

LIKAMA: Bamikrobe oyo ezalaka epai ya banyama mpe esalaka bango mabe te ekoki kobɛlisa yo. Okoki kotya bomoi na yo na likama soki nyama ya mboka to nyama moko boye eswi to ezokisi yo to onyati nyɛi na yango.

KOMIBATELA: Bato mosusu basepelaka kotya banyama na bango libándá ya ndako mpo banyama yango epusanaka pene na bango te. Soki osimbi nyama moko ya mboka, sukolá mabɔkɔ na yo mpe kopusana pene ya nyama ya zamba te. Soki eswi to ezokisi yo sukolá mpota yango malamumalamu mpe luká lisalisi ya monganga. *

5 BATO

LIKAMA: Okoki kozwa bamikrobe mosusu soki moto oyo azali pene na yo akosoli to asali likise, ekoki mpe kozwa bato ebele na koyambana, to na mbote ya mabɔkɔ. Moto oyo azali na mikrobe akoki kotika yango na porte, na mabende ya baeskalye, na telefone, telekomande to mpe na ordinatɛrɛ.

KOMIBATELA: Kosangisa na bato mosusu te biloko lokola razware, brɔsi ya mino to esumɛ. Kosimba te mai oyo ebimi na nzoto ya nyama to ya moto, ezala makila to nkisi oyo euti na makila. Kozwa na lisɛki te likambo ya kosokola mabɔkɔ malamu mpe mbala na mbala. Mbala mosusu yango nde lolenge eleki malamu ya kopekisa mikrobe epalangana.

Soki likoki ezali fandá na ndako ntango ozali kobɛla. Ebongiseli moko ya États-Unis (Centers for Disease Control and Prevention) elobi ete ntango ozali kokosola to kosala likise, salelá elamba to mouchoir kasi mabɔkɔ te.

Lisese moko ya kala elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Maloba yango ezali mpenza ya solo na mokili ya lelo oyo etondi na bamaladi ya nsɔmɔ! Yango wana, sololá na minganga esika ofandaka mpo oyeba makambo mosusu mpe zalá na mimeseno ya malamu etali bopɛto mpo omibomba na makama. Kómisá makasi likoki oyo nzoto na yo ezalaka na yango ya kobundisa bamikrobe mpo okima bamaladi mosusu!

^ par. 6 OMS esɛngi bato básalela mayele ndenge na ndenge mpo na kopɛtola mai na ndako, na ndakisa kotya nkisi babengi chlore, kotya na moi molangi ya plastiki oyo ezali na mai mpe ezipami malamu, koyungola mai (filtre) to kotokisa yango.

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kobatela bilei, talá Lamuká! ya 06/2012 nkasa 3, 4, 5, 6, 7, 8-9 na français.

^ par. 12 Mpo na koyeba ndenge ya kokima malaria, talá lisolo oyo ezali na Lamuká! ya 07/2015 nkasa 14-15.

^ par. 15 Soki banyama oyo ezalaka na ngɛngɛ eswi yo, esɛngaka kokende nokinoki epai ya monganga.