Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkombo ya Nzambe oyo ekomami na Ebre ya kala emonanaka na bisika mingi na bamaniskri ya kala ya Biblia

BIBLIA ELOBI NINI?

Nkombo ya Nzambe

Nkombo ya Nzambe

Mpo na kobondela Nzambe, bamilio ya bato babengaka ye na batitre ya lokumu, na ndakisa Nkolo, Mokonzi ya seko, Allah, to kaka Nzambe. Nzokande, Nzambe azali na nkombo. Osengeli kobenga ye na nkombo yango?

Nkombo ya Nzambe nani?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

 

Bato mingi oyo bamibengaka bakristo balobaka ete nkombo ya Nzambe ezali Yesu. Basusu balobaka ete lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali kaka moko, ezali na ntina te kobenga ye na nkombo na ye. Nzokande, basusu balobaka ete kobenga Nzambe na nkombo na ye ebongi te.

OYO BIBLIA ELOBI

 

Nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ezali Yesu te, mpo Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Kutu, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe boye: “Tata, nkombo na yo esantisama.” (Luka 11:2) Yesu ye moko abondelaki Nzambe boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.”​—Yoane 12:28.

Na Biblia, Nzambe alobi: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.” (Yisaya 42:8) Nkombo “Yehova” euti na balɛtrɛ minei ya Ebre YHWH, oyo emonisi nkombo ya Nzambe. Nkombo yango ezali mbala soki 7 000 na Makomami ya Ebre. * Ekomami mbala ebele koleka batitre mosusu nyonso, na ndakisa “Nzambe,” “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” to “Nkolo,” mpe ezongelami mingi koleka bankombo mosusu, na ndakisa Abrahama, Moize, to Davidi.

Ezali ata na esika moko te na Biblia oyo Yehova apekisi bato bátánga nkombo na ye na limemya. Kutu, Biblia emonisi ete banda kala basaleli ya Nzambe bazalaki kotánga nkombo yango kozanga kobanga. Bazalaki kokɔtisa nkombo yango na bankombo oyo bazalaki kopesa bana na bango, na ndakisa Eliya, oyo elimboli “Nzambe na ngai ezali Yehova,” mpe Zekaria, oyo elimboli “Yehova abosani te.” Mpe bazalaki kobanga te kotánga nkombo ya Nzambe na masolo na bango ya mokolo na mokolo.​—Ruta 2:4.

Nzambe alingaka ete tóbengaka ye na nkombo na ye. Biblia elendisi biso ‘tópesaka Yehova matɔndi, tóbelelaka nkombo na ye.’ (Nzembo 105:1) Kutu, atyelaka bato oyo “bakanisaka nkombo na ye” likebi.​—Malaki 3:16.

“Mpo báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.

Nkombo ya Nzambe elimboli nini?

Bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete na Ebre, nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Ndimbola wana emonisaka ete Nzambe akoki komikómisa ndenge nyonso oyo alingi, to kokómisa bikelamu na ye ndenge nyonso oyo alingi, mpo na kokokisa mokano na ye. Kaka Mozalisi oyo aleki na nguya nde akoki komipesa nkombo ya ndenge wana.

OYO YANGO ELIMBOLI MPO NA YO

 

Soki oyebi nkombo ya Nzambe, ndenge na yo ya kotalela ye mpe ekobongwana. Okopusana penepene na ye kozanga kobanga. Tókende epai tózonga epai, ndenge nini okoki kozala moninga ya moto oyo oyebi nkombo na ye te? Soki Nzambe ayebisi yo nkombo na ye, ezali mpo alingi ete opusana penepene na ye.​—Yakobo 4:8.

Zalá na kondima ete Yehova asalaka ntango nyonso makambo na boyokani na nkombo na ye, elingi koloba akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. Yango wana, Biblia elobi: “Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema.” (Nzembo 9:10) Okokoba kotyela ye motema ndenge wana soki oyebi ete nkombo ya Yehova etambolaka nzela moko na bizaleli na ye, na ndakisa bolingo, motema mawa, mpe bosembo. (Kobima 34:5-7) Koyeba ete Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye mpe asalaka kaka makambo oyo eyokani na bizaleli na ye ezali mpenza kokitisa biso mitema.

Ya solo, koyeba nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ezali mpenza libaku malamu. Yango ekoki komemela yo mapamboli lelo oyo, mpe na mikolo ezali koya. Nzambe alaki ete: “Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.”​—Nzembo 91:14.

“Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.”​—Yoele 2:32.

Nkombo ya Nzambe na minɔkɔ ndenge na ndenge

^ par. 9 Mabongoli mingi ya Biblia elongolá nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango etyá batitre lokola “NKOLO” na makomi minene, nzokande mabongoli mosusu etyá nkombo ya Nzambe kaka na bavɛrsɛ mosusu to na maloba na nse ya lokasa. Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika etángi nkombo ya Nzambe banda ebandeli tii nsuka.