Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndakisa nini ozali kotikela bana na yo?

MPO NA BABOTI

8: Kozala ndakisa

8: Kozala ndakisa

YANGO ELIMBOLI NINI?

Baboti oyo bazali ndakisa malamu basalaka makambo oyo bateyaka. Na ndakisa, ezali mpasi mwana na yo aloba solo soki yo moko oyebisaka ye ntango baluki yo ete: “Yebisá ye nazali te.”

“Bato mingi balobaka: ‘Salá oyo nazali koyebisa yo, kolanda te oyo nazali kosala.’ Makanisi ya ndenge wana elongaka te epai ya bana. Kaka ndenge éponge emɛlaka mai, bana balandaka makambo nyonso oyo baboti basalaka mpe balobaka; soki biso moko tozali te kosala makambo oyo tozali kosɛnga bango básala, bakoyebisa biso yango.”​—David.

TOLI YA BIBLIA: “Yo, moto osakolaka ete: “Koyiba te,” oyibaka?”​—Baroma 2:21.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Bana mike, ezala mpe bilenge balandaka mingi ndakisa ya baboti na bango, koleka ndakisa ya bato mosusu nyonso, ata oyo ya baninga na bango. Yango wana, bino baboti bozali bato ya liboso ya kokamba bana na bino na nzela ya malamu, soki bozali kosala makambo oyo bolobaka.

“Tokoki koyebisa mwana likambo moko mbala na mbala mpe kokanisa ete azali koyoka te; kasi mokolo oyo biso moko tokosala te likambo oyo topekisaka, mwana yango akoyebisa biso yango. Bana balandelaka makambo nyonso oyo tosalaka, ata soki biso moko toyebi te ete bazali kolandela biso.”​—Nicole.

TOLI YA BIBLIA: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . na bokosi te.”​—Yakobo 3:17.

OYO OKOKI KOSALA

Talelá bizaleli na yo moko. Kominanola ya ndenge nini olingaka mingi? Ndenge nini osalelaka molongani na yo mpe bana na yo makambo? Baninga ya ndenge nini ozali na bango? Okipaka basusu? Na mokuse, okolinga ete bana na yo bázala lokola yo?

“Ngai ná mobali na ngai tolingaka te ete bana na biso bázala na ezaleli moko oyo biso tolingaka te.”​—Christine.

Sɛngáká bolimbisi ntango osali mabunga. Bana na yo bayebi ete ozali moto ya kokoka te. Soki osɛngaka molongani na yo mpe bana na yo bolimbisi ntango osali libunga, okoteya bango bázala sembo mpe bázala na komikitisa.

“Bana na biso basengeli komona ete tondimaka mabunga na biso, mpe tosɛngaka bolimbisi. Soki tosali bongo te, bango mpe bakondima te mabunga oyo basali.”​—Robin.

“Bana balandaka mingi makambo oyo biso baboti tosalaka, yango wana, ndakisa oyo topesaka ezali na ntina mingi, mpo bamonaka yango ntango nyonso. Ezali lokola bazali koteyama ntango nyonso na makambo oyo tosalaka.”​—Wendell.