Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kolonga kotungisama

Ozali kotungisama?

Ozali kotungisama?

“Bato nyonso batungisamaka, kasi ngai natungisamaka mingi koleka. Eutaka kaka te na likambo moko ya monene, kasi mpe na makambo mingi, na etumba ya mokolo na mokolo mpe na ndenge nasalisaka mobali na ngai oyo abɛlaka mpe azali na maladi ya motó banda bambula mingi.”​—Jill. a

“Mwasi na ngai asundolaki ngai, mpe nabɔkɔlaki bana mibale ngai moko. Kobɔkɔla bana ngai moko ezalaki mpenza mpasi. Longola yango, nabungisaki mosala, mpe nazalaki lisusu na mbongo te ya kobongisa motuka na ngai. Nazalaki koyeba te nasala nini. Nyonso wana ezalaki mpenza kotungisa ngai mingi. Nayebaki ete ezali mabe komiboma, yango wana nasɛngaki Nzambe aboma ngai.”​—Barry.

Ndenge moko na Jill ná Barry, mbala mosusu yo mpe otungisamaka mingi! Yango wana, tobanzi ete masolo oyo ekolanda ekopesa yo makasi mpe ekosalisa yo. Elobeli makambo oyo etungisaka bato mingi, makambo oyo kotungisama ekoki kosala na nzoto na yo mpe makambo oyo okoki kosala mpo na kolonga kotungisama.

a Topesi bango bankombo mosusu.