Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OKOKI KOLONGA KOTUNGISAMA

Kotungisama ezali nini?

Kotungisama ezali nini?

Kotungisama ezali ndenge oyo nzoto na yo esalaka ntango okutani na likambo ya mpasi. Bɔɔngɔ etindaka ba-hormone na nzoto mobimba. Mbala moko, okomona motema ebandi kobɛta mbangu, tansiɔ emati to ekiti, okomi kopema mbangumbangu to mpe mpema ezali kokatana, misisa mpe misuni ya nzoto na yo ekokóma makasi. Liboso kutu oyeba makambo ezali koleka, nzoto na yo elingi kosala likambo. Soki kotungisama esili, okozala lisusu “motema likolólikoló” te, motema na yo ekokita.

KOTUNGISAMA YA MALAMU MPE YA MABE

Kotungisama ezali mabe te mpo etindaka nzoto na yo esala likambo moko ntango okutani na mokakatano to okima makama. Kotungisama ebandaka na bɔɔngɔ. Kotungisama ya malamu etindaka nzoto ya moto esala likambo nokinoki. Soki ozali kotungisama mwa moke okoki kokokisa mikano na yo to kosala makambo malamu koleka, mbala mosusu na ntango ya ekzamɛ, ntango bazali kotuna yo mituna mpo bápesa yo mosala, to na ntango ya lisano.

Kasi, soki ozali ntango nyonso kotungisama makasi, to kotungisama koleka ndelo, yango ekoki kosala yo mabe. Soki ozali ntango nyonso “motema likolólikoló,” okoki kobɛla, koyokaka nkanda to mawa mpe kobɛla motó. Bizaleli na yo mpe ndenge oyo osalelaka basusu makambo ekoki kobongwana. Mbala mingi bato oyo batungisamaka ntango nyonso bakómaka komɛla masanga mingi, makaya to drɔgɛ, komɛla bankisi mpambampamba, kolya na lokoso mpe bakómaka na bizaleli mosusu ya mabe. Bakoki kutu kobanda konyokwama na makanisi, kosila makasi, to kokóma na makanisi ya komiboma.

Atako kotungisama esalaka ndenge moko te epai ya bato nyonso, ekoki komema bamaladi ebele. Ekoki mpe kobebisa binama mingi ya nzoto.