Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bwanya oyo ekotambwisa yo mpe ekopesa yo esengo

Bwanya oyo ekotambwisa yo mpe ekopesa yo esengo

“Atako nasepelaka te ntango namonaka makambo ya mabe oyo ezali na mokili, na ndakisa bitumba, bobola, maladi, konyokola bana, nazali na elikya ete makambo ekobonga.”​—RANI. *

Rani azwaki esengo ya solosolo ntango ayebaki esika oyo bwanya ya solosolo eutaka, epai ya Mozalisi na biso, Nzambe oyo azali na nguya koleka banguya nyonso. Ntango okotánga masolo oyo elandi, talá ndenge mateya yango ekoki kosalisa yo . . .

  • ozala na libota ya esengo

  • ozala na boyokani malamu na bato mosusu

  • osepela na oyo ozali na yango

  • oyeba ntina oyo bato bakufaka mpe bamonaka mpasi

  • ondima ete mosika te Nzambe akosilisa bampasi nyonso mpe akopesa biso bomoi ya esengo

  • oyeba Nzambe oyo asalá biso mpe okóma moninga na ye

Okoyeba mpe ete Nzambe aponaka te bato ya kopesa bwanya, kasi apesaka yango na moto nyonso oyo alukaka ye.

^ par. 2 Topesi bato yango bankombo mosusu.