Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela boninga na yo ná bato mosusu

Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela boninga na yo ná bato mosusu

Na nzela ya bamesaje, ba-email, video, mpe basite Internet ya kosolola na baninga, bato bakoki kosolola malamu mpenza ata soki bazali mosika mingi. Mpo na bato, kosalela baaparɛyi mpo na bantina wana ezali malamu.

Nzokande, bato mosusu oyo basalelaka baaparɛyi kaka mpo na kosolola na baninga na bango, bakutanaka na mikakatano oyo . . .

  • bamityaka mpenza te na esika ya baninga na bango.

  • bayokaka lokola nde basundolami to bazangi eloko moko boye.

  • batalelaka kaka makambo na bango moko kasi ya baninga te.

OYO OSENGELI KOYEBA

KOMITYA NA ESIKA YA BANINGA

Mpo na komitya na esika ya moninga, esengeli kosalela ye makambo na boboto mpe kozala motema molai, nzokande kosala bongo ezali pɛtɛɛ te na mokili oyo bato bazali kosalela mingi basite Internet ya kosolola na baninga mpe kotindelana bamesaje nokinoki.

Na boumeli ya mwa ntango, soki baaparɛyi ebandi kokonza yo to kotambwisa bomoi na yo, koyanola na bamesaje ya baninga ekokómela yo kilo makasi. Wana okobanda koyanola kaka tiká oyanola, okokipe ata moke te bosɛnga to mposa ya moninga na yo.

KANISÁ NAINO: Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kotyela baninga na yo likebi wana ozali kosalela baaparɛyi mpo na kosolola na bango?​—1 PETRO 3:8.

KOMIYOKA MABE

Ankɛtɛ moko emonisi ete, bato mingi bamiyokaka malamu te nsima ya kosalela basite Internet ya kosolola na baninga. Bato yango balobi ete kotala bafɔtɔ ya bato mpe biloko ya sika oyo batye epesaka bango “likanisi ete basali eloko ya malonga te na bomoi.”

Lisusu, kotala bafɔtɔ ya kitoko oyo baninga batye ekoki kotinda moto akóma na makanisi ete bomoi na ye ezali na ntina te. Nsukansuka, ekomonana lokola nde baninga bazali na bomoi ya malamu koleka oyo ya yo.

KANISÁ NAINO: Ntango ozali kosalela basite Internet ya kosolola na baninga, osengeli kosala nini mpo omitalela te na ndenge ya mabe na kotalela makambo to biloko oyo baninga bazali kotya?​—BAGALATIA 6:4.

OMITALELA

Molakisi moko akomaki ete bana-kelasi na ye bazalaki koluka kaka matomba na bango moko mpe bazalaki kolinga kaka baninga oyo bazali kosala makambo lokola bango. Baninga ya ndenge wana batyaka makanisi kaka na oyo bakoki kozwa. Mpe bakobanda komona ete baninga bazali lokola baaparɛyi oyo bakoki kofina ndenge balingi.

KANISÁ NAINO: Makambo otyaka na Internet emonisaka ete ozali koluka kowelana na bato to ozali komilinga mingi?​—BAGALATIA 5:26.

OYO OKOKI KOSALA

TALELÁ NDENGE OSALELAKA BAAPARƐYI

Ntango ozali kosalela baaparɛyi na ndenge ya malamu mpenza, ekosalisa yo osololaka na baninga na yo mpe bókóma kutu na boninga makasi.

VƐRSƐ: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.”​—1 BAKORINTI 13:4, 5.

Poná makanisi oyo okolinga kosalela, to komá makanisi na yo moko.

  • Meká kosolola na bato boye na miso (na esika ya kotindelaka bango kaka bamesaje)

  • Tyá telefone na yo mosika (to salá ete esala makelele te) ntango ozali kosolola na bato

  • Kitisá ntango oyo olekisaka na basite Internet ya kosolola na baninga

  • Yokáká malamu mpenza ntango ozali kosolola na baninga

  • Bengá to komelá moninga moko oyo azali kokutana na mikakatano