Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

1 Batelá sante na yo

1 Batelá sante na yo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Ntango likambo moko ya mpasi ebimi to likama moko esalemi, yango ekoki kobebisa sante na biso mbala moko to mokemoke.

  • Mikakatano esalaka ete bato bakóma komitungisa, mpe ezalaka mpasi te bato oyo bamitungisaka na boumeli ya ntango molai bábɛla.

  • Mikakatano ekoki mokemoke kobebisa ba anticorps na biso mpe yango ekoki kosala ete minganga bázala na likoki te ya kopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango.

  • Mikakatano esalaka ete bato bázanga mbongo, bázanga likoki ya kosomba biloko oyo ezali na ntina mingi, na ndakisa, bilei mpe bankisi mpo na komisalisa ntango babɛli.

Oyo osengeli koyeba

  • Soki obɛli makasi mpe ozali komitungisa na makanisi, yango ekoki kosala ete ozwa bikateli ya mabe oyo ekoki kopekisa yo kotya likebi na makambo oyo ekoki kosala ete ozala na sante ya malamu. Mpe yango ekoki kosala ete maladi na yo ekóma makasi.

  • Soki ozali kolandela sante na yo te, yango ekoki kokómisa makambo ndɔngɔ mpe kotya kutu bomoi na yo na likama.

  • Soki ozali na sante ya malamu, yango ekosala ete ozwá bikateli ya malamu ntango okutani na mokakatano moko.

  • Ozala na mbongo mingi to te, okoki kosala makambo oyo ekosalisa yo ozala na sante ya malamu.

Oyo okoki kosala sikoyo

Moto ya bwanya amonaka likama na mosika mpe azwaka bikateli oyo ekosala ete akima yango. Yango ekoki mpe kosalelama na makambo etali sante. Soki ozali pɛto mpe ozali kotya bopɛto na ndako na yo, yango ekoki kosala ete ozwaka maladi mpambampamba te. Ezali malamu komibatela na esika ya kozela ete makambo eya ndɔngɔ.

“Lokola tozalaka pɛto mpe totyaka bopɛto na ndako na biso, yango esali ete tokendaka lopitalo mpambampamba te mpe tóbebisa mbongo te na kosomba bankisi.”​—Andreas. a

a Topesi bato yango bankombo mosusu.