Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda mpo na masolo ya Biblia

Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Yesu azali kosolola na bana

MAKAMBO oyo ezali buku oyo ezali makambo ya solo. Euti na Biblia, mokanda oyo eleki mikanda nyonso. Buku oyo ezali koyebisa makambo ya mokili, uta Nzambe abandaki kozalisa tii na mikolo na biso. Ezali mpe kolobela bilaka ya Nzambe mpo na mikolo oyo ezali koya.

Na yango, buku oyo ekoyebisa makambo oyo ezali na kati ya Biblia. Ezali kolobela ebele ya bato ya kala mpe makambo oyo basalaki. Ezali mpe kolobela elikya ya malamu mpenza oyo Nzambe apesi bato: bomoi ya seko na mabele oyo ekokóma paradiso.

Buku oyo ezali na masolo nkama moko na zomi na motoba (116). Tokaboli yango na biteni mwambe. Na ebandeli ya eteni mokomoko, balimboli na mokuse makambo oyo ezali na kati ya eteni yango. Masolo yango ekomami na molɔngɔ na kolanda ndenge makambo esalemaki. Yango ekosalisa yo oyeba ntango oyo likambo na likambo esalamaki.

Ekomami na elobeli ya pɛtɛɛ. Bana mike, bokoki kotánga masolo yango bino moko. Bino baboti bokomona ete bana na bino ya mike bakosepela bátángelaka bango masolo yango mbala na mbala mpe bakolɛmba koyoka yango te. Bokomona mpe ete, ezala bilenge to mikóló, bakosepela na buku oyo.

Na nsuka ya lisolo mokomoko batye bavɛrsɛ epai lisolo yango euti. Bótánga yango liboso ya koleka na lisolo mosusu. Soki bosilisi kotánga lisolo moko, bótalela mpe mituna mpo na koyekola lisolo yango; mituna yango ezali na nsima ya Lisolo 116 mpe bómeka kokanisa biyano na mituna yango.

Na nsuka ya lisolo mokomoko batye bavɛrsɛ epai lisolo euti.