Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 1: Banda na bozalisi tii na Mpela

Eteni 1: Banda na bozalisi tii na Mpela

Likoló ná mabele eutá wapi? Moi, sanza, minzoto, ná biloko nyonso oyo ezali na mabele ebimaki ndenge nini? Biblia epesi eyano ya solo, elobi ete Nzambe nde moto akelaki yango. Yango wana, buku oyo ebandi na masolo oyo elobeli liboso mpenza ndenge Nzambe asalaki biloko nyonso.

Bikelamu ya liboso oyo Nzambe asalaki ezali baanzelu. Baanzelu bamonanaka te lokola Nzambe. Nzambe asalaki mabele mpo na bato. Asalaki mwasi ná mobali ya liboso, nkombo na bango Adama ná Eva mpe atyaki bango na paradiso. Kasi batosaki ye te mpe basengelaki lisusu kofanda wana te.

Banda Nzambe asalaki mokili tii na Mpela, elekaki mbula nkóto moko na nkama motoba na ntuku mitano na motoba (1 656). Na ntango yango, bato mabe bakómaki mingi. Satana ná baanzelu mabe na ye bazalaki kuna na likoló. Kaina ná ebele ya bato mabe mosusu bazalaki awa na mabele, kati na bato mabe yango tokoki kotánga bilombe ya makasi mingi. Kasi bato malamu mpe bazalaki: Abele, Enoka ná Noa. Na eteni ya LIBOSO ya buku oyo, tokolobela bato yango mpe makambo oyo esalemaki na ntango wana.

Banyama ná bandɛkɛ na elanga ya Edene