Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 1: Nzambe abandi kozalisa

Lisolo 1: Nzambe abandi kozalisa

NZAMBE asalaki biloko nyonso. Asalaki moi mpo engɛngisaka biso na moi, sanza ná minzoto mpo engɛngisaka biso na butu. Asalaki mpe mabele mpo tófandaka wana.

Kasi moi, sanza, minzoto ná mabele, ezali biloko ya liboso te oyo Nzambe asalaki. Boyebi bikelamu ya liboso oyo Nzambe asalaki? Ezali bikelamu ya elimo lokola Ye. Tokoki komona bango te, ndenge tokoki mpe komona Nzambe te. Biblia ebengi bikelamu yango baanzelu. Nzambe asalaki baanzelu mpo báfandaka na ye kuna na likoló.

Anzelu ya liboso oyo Nzambe asalaki azali na ntina mingi. Ezali Mwana ya liboso ya Nzambe. Asalaki esika moko na Tata na ye, asalisaki ye na kosala biloko mosusu nyonso. Asalisaki Nzambe na kosala moi, sanza, minzoto ná mabele.

Na ebandeli, mabele ezalaki ndenge nini? Moto akokaki kofanda na mabele te. Mai etondaki na mabele mobimba. Kasi, Nzambe alingaki ete bato báfanda na mabele. Yango wana, abandaki kobongisa yango. Asalaki nini?

Likambo ya liboso, mabele esengelaki kongɛngisama. Yango wana, Nzambe asalaki moi mpo engɛngisaka mabele. Uta na ntango yango, butu ná moi ebandaki kolandana. Na nsima, Nzambe abimisaki mokili, eutaki na mai.

Na ebandeli, mabele ezalaki ata na eloko moko te: fololo te, nzete te, nyama te, ndenge ozali komona na elilingi oyo. Ata na kati ya mai, mbisi ezalaki mpe te. Nzambe azalaki mpenza na mosala mingi mpo na kobongisa mabele ekóma esika ya kitoko mpo banyama ná bato báfanda wana.

Yirimia 10:12; Bakolose 1:15-17; Ebandeli 1:1-10.

Mabele ezali na eloko te


Mituna

  • Biloko ya kitoko nyonso eutá wapi, mpe okoki kopesa ndakisa?
  • Eloko nini oyo Nzambe azalisaki liboso?
  • Mpo na nini anzelu ya liboso azali na ntina mingi?
  • Lobelá ndenge mabele ezalaki na ebandeli. (Talá elilingi.)
  • Ndenge nini Nzambe abandaki kobongisela banyama ná bato mabele?

Mituna mosusu