Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 2: Elanga kitoko

Lisolo 2: Elanga kitoko

TALÁ mabele sikoyo! Ezali kitoko mpenza! Talá matiti, fololo, nzete mpe banyama nyonso. Omoni nzoku ná nkɔsi?

Banyama ná bandɛkɛ na elanga ya edene

Nani asalaki elanga ya kitoko boye? Tótala naino ndenge Nzambe abongisaki mabele.

Liboso, Nzambe asalaki matiti ná banzete na mabele. Asalaki banzete ya lolenge nyonso: ya minene ná ya mike. Nyonso wana ezali kobongisa mabele. Kasi esuki wana te. Ezali mpe kopesa biso mbuma kitoko ya kolya.

Na nsima, Nzambe asalaki mbisi etambolaka na mai, mpe ndɛkɛ epumbwaka na likoló. Asalaki mpe banyama lokola mbwa, nyau, mpunda, mpe bongo na bongo. Nyama nini emonanaka mingi na mboka na bino? Tosepelaka mingi ndenge Nzambe asalelaki biso biloko nyonso wana.

Na nsuka, Nzambe abongisaki malamumalamu esika moko na mabele. Abengaki esika yango elanga ya Edene. Elanga yango ezalaki kitoko mingi. Eloko nyonso ezalaki kaka kitoko. Nzokande, mokano ya Nzambe ezalaki ete mabele mobimba ekóma lokola elanga ya kitoko wana.

Kasi, talá elanga yango malamumalamu. Nzambe amonaki ete eloko moko ezangi. Boyebi eloko yango?

Ebandeli 1:11-25; 2:8, 9.



Mituna

  • Ndenge nini Nzambe abongisaki mabele mpo ezala esika na biso ya kofanda?
  • Lobelá banyama ya mitindo ndenge na ndenge oyo Nzambe asalá. (Talá elilingi.)
  • Mpo na nini elanga ya Edene ezalaki ndenge mosusu mpenza?
  • Nzambe alingaki ete mabele mobimba ekóma ndenge nini?

Mituna mosusu

  • Tángá Ebandeli 1:11-25.

    Na mokolo ya misato ya bozalisi, Nzambe asalaki nini? (Eba. 1:12)

    Na mokolo ya minei ya bozalisi, nini esalemaki? (Eba. 1:16)

    Na mokolo ya mitano mpe ya motoba ya bozalisi, Nzambe asalaki banyama ya mitindo nini? (Eba. 1:20, 21, 25)

  • Tángá Ebandeli 2:8, 9.

    Wapi banzete mibale oyo ekesanaki na banzete mosusu oyo Nzambe atyaki na Edene, mpe banzete yango ezalaki komonisa nini?