Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 4: Babengani bango na Edene

Lisolo 4: Babengani bango na Edene

TALÁ sikoyo. Babengani Adama ná Eva na elanga kitoko ya Edene. Boyebi mpo na nini babengani bango?

Babengani Adama ná Eva na elanga ya Edene

Mpo basali likambo moko ya mabe mpenza. Yango wana, Yehova apesi bango etumbu. Oyebi likambo ya mabe oyo Adama ná Eva basalaki?

Basalaki likambo moko oyo Nzambe apekisaki bango. Nzambe apesaki bango nzela ete bálya mbuma ya nzete nyonso ya elanga. Kasi apekisaki bango mbuma ya nzete moko mpamba. Soki balei yango, bakokufa. Nzambe atikaki nzete yango mpo na ye moko. Mpe ndenge toyebi, ezali mabe kozwa eloko ya moto mosusu. Kasi likambo nini esalemaki?

Mokolo moko, Eva azalaki ye moko, mpe nyoka moko elobaki na ye. Likambo ya kokamwa mpenza! Nyoka elobaki na Eva alya mbuma ya nzete oyo Nzambe apekisaki. Nzokande, ntango Yehova asalaki banyoka, apesaki bango likoki ya koloba te. Emonani ete moto moko boye nde azalaki kolobisa nyoka yango. Moto yango nani?

Ezalaki Adama te. Ekoki kozala moko ya bikelamu oyo Nzambe asalaki liboso mpenza ya kosala mabele. Bikelamu yango ezali baanzelu, mpe tokoki komona bango te. Moko ya baanzelu yango akómaki na lolendo. Abandaki kokanisa ete asengeli koyangelaka lokola Nzambe. Alingaki bato bátosaka ye kasi Nzambe te. Ezali anzelu wana nde alobisaki nyoka.

Anzelu yango akosaki Eva. Ntango anzelu yango ayebisaki Eva ete soki alei mbuma oyo Nzambe apekisaki bango akokóma lokola Nzambe, Eva andimelaki ye. Alyaki mbuma yango, Adama mpe alyaki. Adama ná Eva batosaki Nzambe te mpe Nzambe alongolaki bango na esika ya kitoko mpenza oyo bazalaki kofanda.

Kasi, ata bongo, mokolo mosusu mabele mobimba ekokóma kitoko lokola elanga ya Edene. Bokomona na masolo mosusu ndenge oyo bokoki kosangana na mosala ya kokómisa mabele paradiso. Kasi sikoyo, tótala naino eloko nini ekómelaki Adama ná Eva.

Ebandeli 2:16, 17; 3:1-13, 24; Emoniseli 12:9.



Mituna

  • Na elilingi oyo, likambo nini ekómeli Adama ná Eva?
  • Mpo na nini Yehova apesaki bango etumbu?
  • Nyoka ayebisaki Eva nini?
  • Nani asalaki ete nyoka asolola na Eva?
  • Mpo na nini Nzambe abenganaki Adama ná Eva na Paradiso?

Mituna mosusu