Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 8: Bilombe na mokili

Lisolo 8: Bilombe na mokili

SOKI omoni mobali moko molai mpenza, oyo motó na ye ekoki kotuta plafɔ ya ndako na bino, azali koya esika ozali, okokanisa nini? Moto yango akoki kozala elombe! Na ntango moko boye ya kala, bilombe mpe bazalaki awa na mabele. Biblia emonisi ete batata na bango ezalaki baanzelu. Yango esalemaki ndenge nini?

Bilombe, bato ya mobulu

Kobosana te ete Satana, anzelu mabe, azalaki ntango nyonso koluka kotya mobulu na mokili. Kutu, amekaki mpe kobebisa baanzelu. Nzokande, kati na baanzelu yango, bamosusu bayokelaki ye. Batikaki mosala oyo Nzambe apesaki bango na likoló. Bakitaki awa na mabele mpe balataki nzoto lokola oyo ya bato. Boyebi mpo na nini basalaki bongo?

Biblia eyebisi biso ete baanzelu wana bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki kitoko mpe bayokaki mposa ya kofanda na bango elongo. Bongo bayaki awa na mabele mpe babalaki basi yango. Biblia emonisi ete likambo yango ezalaki mabe mpenza, mpo Nzambe asalaki baanzelu báfandaka nde na likoló.

Baanzelu yango ná basi na bango babotaki bana oyo bakesanaki na bana mosusu. Ekoki kozala ete na ntango ya kobotama, bokeseni wana ezalaki komonana te. Kasi na nsima, bazalaki kokola mingi mpenza, mpe bakómi makasi koleka, tii bakómi bilombe.

Bilombe wana bazalaki bato mabe. Lokola bazalaki minene mpe makasi mingi, bazalaki konyokola bato. Balingaki ete bato nyonso bázala mabe lokola bango.

Enoka akufaki, kasi moto mosusu ya malamu amonanaki na mokili. Nkombo na ye Noa. Moto yango azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe.

Mokolo mosusu Nzambe ayebisi Noa ete akoboma bato mabe nyonso, kasi akobikisa ye ná libota na ye ná banyama mingi. Tótala ndenge Nzambe asalaki yango.

Ebandeli 6:1-8; Yuda 6.



Mituna

  • Likambo nini esalemaki ntango baanzelu mosusu ya Nzambe bayokelaki Satana?
  • Mpo na nini baanzelu mosusu batikaki mosala na bango na likoló mpe bayei awa na mabele?
  • Mpo na nini ndenge baanzelu bakitaki awa na mabele mpe balati nzoto ya bato ezalaki mabe?
  • Bana ya baanzelu bazalaki ndenge nini?
  • Ndenge ozali komona yango na elilingi, bana ya baanzelu babandaki kosala nini ntango bakómaki bilombe?
  • Nsima ya Enoka, wapi moto mosusu ya malamu oyo azalaki na mokili, mpe mpo na nini Nzambe alingaki ye?

Mituna mosusu