Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 9: Noa atongi masuwa

Lisolo 9: Noa atongi masuwa
Bato bazali kosɛka Noa

NOA azalaki na mwasi moko ná bana mibali misato: Seme, Kame ná Yafete. Bana yango nyonso misato babalaki. Na yango, libota ya Noa ezalaki na bato mwambe.

Mokolo moko, Nzambe apesi Noa mosala oyo ekeseni na misala mosusu nyonso. Atindaki ye atonga masuwa. Ezalaki lokola sanduku moko ya monene. Nzambe alobaki ete: ‘Salá yango na bitaje mibale mpe kabolá yango na bashambrɛ.’ Bashambrɛ yango ezalaki mpo na Noa ná libota na ye, banyama mpe bilei na bango nyonso.

Nzambe ayebisaki Noa apakola masuwa gudrɔ na kati mpe na libándá mpo mai ekɔta te. Nzambe alobaki na ye ete: ‘Nazali kotinda mpela ya monene mpe nakobebisa mokili mobimba. Moto nyonso oyo akokɔta na masuwa te akokufa.’

Noa ná bana na ye batosaki Yehova mpe babandaki mosala. Kasi bato bazalaki kosɛka bango. Babongisaki bizaleli na bango te. Moto moko te andimelaki Noa ntango azalaki kosakola makambo oyo Nzambe akosala.

Libota ya Noa bazali kokɔtisa banyama mpe biloko ya kolya na masuwa

Mosala ya kotonga masuwa eumelaki bambula mingi, mpo masuwa yango ezalaki monene mpenza. Nsukansuka, nsima ya bambula mingi, basilisaki kotonga yango. Na ntango yango, Nzambe atindaki Noa ete akɔtisa banyama na masuwa. Nzambe alobaki na Noa akɔtisa banyama mosusu mibalemibale na kolanda motindo na yango, mwasi ná mobali. Alobaki mpe ete, motindo mosusu ya banyama, akɔtisa yango nsambonsambo. Nzambe atindaki lisusu Noa akɔtisa bandɛkɛ ya mitindo nyonso. Noa asalaki kaka ndenge Nzambe atindaki ye.

Na nsima, Noa ná libota na ye bakɔtaki na kati ya masuwa. Bongo Nzambe akangaki porte. Na kati ya masuwa, Noa ná libota na ye bazelaki. Kanisá naino ete ozalaki elongo na bango na kati ya masuwa bozali kozela. Mpela ekoya ndenge Nzambe alobaki?

Ebandeli 6:9-22; 7:1-9.



Mituna

  • Libota ya Noa ezalaki na bato boni? mpe tángá nkombo ya bana mibali misato ya Noa.
  • Nzambe asɛngaki Noa asala mosala nini oyo ekeseni na misala mosusu nyonso, mpe mpo na nini?
  • Bato ya ntango ya Noa basalaki nini ntango Noa ayebisaki bango likambo ya masuwa?
  • Nzambe ayebisaki Noa asala banyama nini?
  • Ntango Nzambe akangi porte ya masuwa, Noa ná libota na ye basengelaki kosala nini?

Mituna mosusu