Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 2: Banda na Mpela tii Bayisraele balongwe na Ezipito

Eteni 2: Banda na Mpela tii Bayisraele balongwe na Ezipito

Kaka bato mwambe nde babikaki na Mpela, kasi nsima ya bambula, bato bakómaki mingi na mokili. Abrahama abotamaki mbula nkama misato na ntuku mitano na mibale (352) nsima ya Mpela. Nzambe akokisaki elaka oyo apesaki ye, abotaki mwana mobali mpe apesi ya nkombo Yisaka. Na bana mibale oyo Yisaka abotaki, Nzambe aponaki Yakobo.

Yakobo abotaki bana mibali zomi na mibale ná bana basi. Bana na ye zomi ya mibali bayinaki leki na bango Yozefe, mpe batɛkaki ye na boombo na Ezipito. Na nsima, Yozefe akómaki moto monene na Ezipito. Ntango nzala monene eyaki, Yozefe amekaki bandeko na ye mpo ayeba soki babongoli mitema to te. Nsima ya mwa ntango, libota ya Yakobo mobimba, Bayisraele, bakendeki kofanda na Ezipito. Yango esalemaki mbula nkama mibale na ntuku libwa (290) nsima ya kobotama ya Abrahama.

Na mbula nkama mibale na zomi na mitano (215) oyo elandaki, Bayisraele bafandaki na Ezipito. Nsima ya liwa ya Yozefe, bakómaki baombo. Na nsima Moize abotamaki, mpe Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa bango. Eteni ya MIBALE elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkama mwambe na ntuku mitano na nsambo (857).

Yakobo ná libota na ye bakei na Ezipito