Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 12: Batongi ndako ya molai

Lisolo 12: Batongi ndako ya molai

BAMBULA mingi eleki. Bana ya Noa baboti bana. Bana wana bakoli mpe baboti mpe bana mingi. Bato bakómi mingi na mokili.

Noa azalaki na bankɔkɔ ebele, moko na bango Nimerode. Nimerode yango azalaki moto mabe, azalaki koboma bato ná banyama. Amikómisaki mpe mokonzi mpo ayangelaka baninga. Nzambe asepelaki na Nimerode te.

Na ntango yango, bato bazalaki koloba monɔkɔ moko mpamba. Nimerode alingaki ete bango nyonso bázala esika moko mpo ayangela bango malamu. Boyebi eloko asalaki? Alobaki na bato bátonga mboka mpe ndako moko molai. Talá elilingi, omoni ndenge bazali kosala babriki?

Yehova Nzambe asepelaki na mosala wana te. Mposa na ye ezalaki ete bato bápalangana na mabele mobimba. Kasi bato balobaki ete: ‘Tómitongela mboka mpe ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma tii na likoló. Bongo tokozala na lokumu mingi.’ Bazalaki kokanisa lokumu na bango moko kasi oyo ya Nzambe te.

Nzambe asukisaki mosala na bango. Boyebi eloko asalaki? Na mbala moko, Nzambe abulunganisaki monɔkɔ na bango mpe bakómaki koloba minɔkɔ mingi. Bato oyo bazalaki kotonga bazalaki koyokana lisusu te. Yango wana, babengaki mboka yango Babele, to Babilone; nkombo yango elimboli “Mobulungano.”

Na yango, bato babandaki kolongwa na Babele. Bato na bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko bakei epai mosusu, bakei kofanda kuna.

Ebandeli 10:1, 8-10; 11:1-9.

Bazali kotonga ndako ya molai mpe ya monene


Mituna

  • Nimerode azalaki nani, mpe ndenge nini Nzambe azalaki kotalela ye?
  • Na elilingi oyo, mpo na nini bato bazalaki kosala babriki?
  • Mpo na nini Yehova asepelaki na mosala yango te?
  • Ndenge nini Nzambe asukisaki mosala ya kotonga ndako ya molai yango?
  • Bazalaki kobenga mboka yango na nkombo nini, mpe nkombo yango elimboli nini?
  • Likambo nini ekómelaki bato ntango Nzambe abulunganisaki monɔkɔ na bango?

Mituna mosusu