Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 16: Yisaka azwi mwasi malamu

Lisolo 16: Yisaka azwi mwasi malamu

BOYEBI mwasi oyo bozali komona na elilingi oyo? Nkombo na ye Rebeka. Mobali oyo azali koya kokutana na ye ezali Yisaka. Rebeka akozala mwasi na ye. Yango ebandaki ndenge nini?

Abrahama, tata ya Yisaka, azalaki na mposa ya kobalela mwana na ye mwasi ya malamu. Alingaki te ete Yisaka abala mwasi ya Kanana, mpo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Yango wana, Abrahama abengaki mosaleli na ye mpe alobi na ye ete: ‘Kende kuna epai ya bandeko na ngai, na Harane, mpe zwelá mwana na ngai Yisaka mwasi kuna.’

Mosaleli ya Abrahama azwi bakamela zomi mpe asali mobembo ya molai. Ntango akómi penepene na mboka oyo bandeko ya Abrahama bazali kofanda, atɛlɛmi pene na libulu ya mai. Ezalaki na mpokwa, ntango basi ya mboka bayaka kotoka mai. Bongo mosaleli ya Abrahama abondeli Yehova boye: ‘Tiká ete mwasi oyo akotokela ngai mai mpe akotokela bakamela mai, azala mwasi oyo oponeli Yisaka!’

Rebeka akutani na Yisaka

Mosika te, Rebeka ayei kotoka mai. Ntango mosaleli asɛngi ye mai, apesi ye. Na nsima, atoki mai mosusu mpo na komɛlisa bakamela. Ezalaki likambo moke te, mpo bakamela bamɛlaka mai mingi.

Ntango Rebeka asilisi kotoka mai, mosaleli atunaki ye nkombo ya tata na ye. Atunaki ye mpe soki akoki kolala na ndako na bango. Rebeka azongisi ete: ‘Nkombo ya tata na ngai Betuele mpe esika ya kolala ezali.’ Nzokande mosaleli ya Abrahama ayebaki ete Betuele azali mwana ya Nahore, ndeko ya Abrahama. Yango wana, afukamaki mpe atɔndi Yehova mpo akambi ye tii epai ya bandeko ya Abrahama.

Na butu wana, mosaleli ya Abrahama ayebisi Betuele ná Labana, ndeko ya Rebeka, ntina ya mobembo na ye. Bandimi ete Rebeka akende na ye mpe abalana na Yisaka. Bongo ntango batunaki Rebeka soki akokende, alobaki nini? Alobaki ete: ‘Nakokende.’ Na mokolo oyo elandi, Rebeka akei elongo na mosaleli ya Abrahama na mokili ya Kanana.

Bakómaki na mpokwa. Rebeka amoni mobali moko azali kotambola na esobe. Ezali Yisaka. Yisaka asepelaki mingi komona Rebeka. Banda Sara, mama na ye, akufá, elekaki mbula misato, mpe Yisaka azalaki naino na mawa. Kasi sikoyo, Yisaka alingi Rebeka mingi mpenza, mpe esengo na ye ezongi lisusu.

Ebandeli 24:1-67.



Mituna

  • Mobali ná mwasi oyo ozali komona na elilingi ezali banani?
  • Abrahama asalaki nini mpo azwela mwana na ye mwasi, mpe mpo na nini asalaki bongo?
  • Ndenge nini Nzambe ayanolaki na libondeli ya mosaleli ya Abrahama?
  • Rebeka apesaki eyano nini ntango batunaki ye soki alingi kobala Yisaka?
  • Eloko nini esalaki ete Yisaka akóma lisusu na esengo?

Mituna mosusu