Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 23: Ndɔtɔ ya Farao

Lisolo 23: Ndɔtɔ ya Farao

MBULA mibale mobimba eleki, Yozefe azali naino na bolɔkɔ. Kapita ya bapesi-masanga ya Farao akanisaki ye te. Kasi na butu moko boye, Farao alɔti ndɔtɔ mibale ya ndenge mosusu mpenza, mpe aluki koyeba ndimbola na yango. Bozali komona Farao alali na mbeto na ye? Na ntɔngɔ, Farao abengisi bato na ye nyonso ya bwanya mpe ayebisi bango bandɔtɔ alɔtaki. Kasi bakokaki kolimbolela ye bandɔtɔ yango te.

Bongo na nsima, kapita ya bapesi-masanga akanisi Yozefe. Alobi na Farao ete: ‘Ntango nazalaki na bolɔkɔ, ezalaki na moto moko kuna oyo ayebi kolimbola bandɔtɔ.’ Farao abimisi Yozefe na bolɔkɔ mbala moko.

Farao ayebisi Yozefe bandɔtɔ na ye, alobi boye: ‘Liboso namonaki ngɔmbɛ nsambo ya minene, mpe ya kitoko. Mpe na nsima namoni ngɔmbɛ nsambo oyo ekɔndakɔndá mpe ya mikuwamikuwa. Mpe bangɔmbɛ oyo ekɔndakɔndá emɛli oyo ya minene.

Farao azali kolɔta ndɔtɔ

‘Na ndɔtɔ ya mibale, namonaki mitó nsambo ya blé ya kitoko, oyo etondá, ezali na nzete moko. Na nsima, namoni mitó nsambo mosusu ya blé oyo ekaukakauká. Mitó nsambo ya blé oyo ekaukakauká emɛlaki mitó nsambo ya blé ya kitoko oyo etondá.’

Yozefe ayebisi Farao ete: ‘Ndɔtɔ nyonso mibale ezali na ndimbola moko. Ngɔmbɛ nsambo ya mafuta mpe mitó nsambo ya blé ya kitoko oyo etondá elakisi mbula nsambo; ngɔmbɛ nsambo oyo ekɔndakɔndá mpe mitó nsambo ya blé oyo ekaukakauká ezali mpe mbula nsambo. Talá mbula nsambo ezali koya, oyo biloko ekozala ebele na Ezipito. Kasi mbula nsambo oyo ekoya nsima na yango ekozala na nzala makasi mpenza.’

Bongo Yozefe ayebisi Farao ete: ‘Poná moto moko ya bwanya mpe pesá ye mokumba ya kosangisa mpe kobomba bilei na mbula nsambo ya malamu. Bongo bato bakokufa nzala te na mbula nsambo oyo biloko ekozanga.’

Farao asepeli na likanisi yango. Mpe aponi Yozefe asangisa biloko mpe abomba yango. Bongo Yozefe akómi moto oyo aleki bato nyonso na Ezipito, nsima ya Farao.

Mbula mwambe na nsima, Yozefe amoni bato moko boye bayei na Ezipito. Boyebi bato yango? Bayaya na ye zomi. Yakobo, tata na bango, atindi bango na Ezipito mpo nzala ekɔtaki na mokili ya Kanana. Yozefe ayebi bandeko na ye, kasi bango bayebi ye lisusu te. Oyebi mpo na nini bayebi ye te? Mpo Yozefe akómá mokóló mpe alati bilamba ya ndenge mosusu.

Bongo Yozefe akanisaki bandɔtɔ na ye ya bomwana, oyo amonaki bandeko na ye bayei kogumbamela ye. Oyebi lisusu ete totángaki yango? Bongo Yozefe ayaki koyeba ete Nzambe atindaki ye na Ezipito na ntina. Sikoyo Yozefe akosala nini? Tiká tóleka na lisolo oyo elandi.

Ebandeli 41:1-57; 42:1-8; 50:20.



Mituna

  • Likambo nini ekómelaki Farao na butu moko?
  • Nsukansuka, nini etindaki kapita ya bapesi-masanga akanisa Yozefe?
  • Ndenge balakisi yango na elilingi, wapi ndɔtɔ mibale oyo Farao alɔtaki?
  • Ndimbola nini Yozefe apesaki na bandɔtɔ yango?
  • Ndenge nini Yozefe akómaki moto monene, na Ezipito, nsima ya Farao?
  • Mpo na nini bandeko ya Yozefe bayaki na Ezipito, mpe mpo na nini bayebaki ye lisusu te?
  • Ndɔtɔ nini Yozefe akanisaki, mpe yango esalisaki ye akanga ntina ya likambo nini?

Mituna mosusu

  • Tángá Ebandeli 41:1-57.

    Ndenge nini Yozefe azalaki kosala ete bato bákumisa nde Yehova, mpe ndenge nini lelo oyo biso bakristo tokoki kolanda ndakisa na ye? (Eba. 41:16, 25, 28; Mat. 5:16; 1 Pe. 2:12)

    Ndenge nini bambula ya bilei mingi na Ezipito mpe bambula ya nzala oyo elandaki nsima na yango ezali mpenza komonisa bokeseni ya elimo oyo ezali kati na basaleli ya Yehova ná bakristo ya nkombo mpamba? (Eba. 41:29, 30; Amo. 8:11, 12)

  • Tángá Ebandeli 42:1-8 mpe 50:20.

    Ezali mabe ete basambeli ya Yehova bágumba motó liboso ya moto mpo na kopesa ye lokumu mpe limemya soki yango ezali momeseno ya mboka epai bafandi? (Eba. 42:6)