Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 26: Yobo atikali sembo

Lisolo 26: Yobo atikali sembo

BOZALI koyokela mobali oyo mawa mpo azali kobɛla? Nkombo na ye Yobo. Mwasi oyo atɛlɛmi liboso na ye wana ezali mwasi na ye. Alobi na ye ete: ‘Lakelá Nzambe mabe mpe kufá.’ Kasi mpo na nini alobi na ye boye mpe mpo na nini Yobo azali na mpasi oyo?

Yobo abɛli maladi mabe

Yobo azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Yehova. Azalaki kofanda na mokili ya Uze, pene na mokili ya Kanana. Yehova alingaki ye mingi, kasi moto moko boye ayinaki ye. Boyebi moto yango?

Ezali Satana Zabolo. Kobosana te, Satana azali anzelu mabe oyo ayinaka Yehova. Atindaki Adama ná Eva báboya kotosa Yehova, mpe akanisaki ete akokoka kokweisa moto nyonso. Alongaki? Te. Kanisá bato ya sembo oyo tolobeli na masolo oyo eleki. Okoki kotánga nkombo ya bato boni?

Yakobo ná Yozefe bakufaki na Ezipito; na ntango wana, na miso ya Yehova, Yobo azalaki moto oyo alekaki sembo na mabele mobimba. Yehova alingaki Satana ayeba ete akokoka kobebisa bato nyonso te, yango wana ayebisaki ye ete: ‘Talá Yobo. Azali mpenza sembo epai na ngai.’

Satana azongisi ete: ‘Azali sembo mpo opamboli ye mpe azali na biloko ya kitoko ebele. Kasi soki obɔtɔli ye biloko yango akolakela yo mabe.’

Bongo Yehova alobi na Satana ete: ‘Salá boye: longolá ye biloko yango nyonso. Salá ye mabe nyonso oyo olingi. Mpe tokotala soki akolakela ngai mabe. Kasi nde komeka koboma ye te.’

Ya liboso, Satana atindi miyibi báyiba bangɔmbɛ, bampunda ná bakamela ya Yobo, mpe babomaki bampate na ye. Na nsima, abomi bana na ye nyonso zomi na mopɛpɛ makasi. Na nsuka abɛlisi Yobo maladi mabe. Yobo anyokwamaki mingi. Yango wana, mwasi na ye alobaki na ye ete: ‘Lakelá Nzambe mabe mpe kufá.’ Kasi Yobo asalaki yango te. Lisusu, baninga mabe misato bayaki kotala ye mpe balobaki na ye ete azali na bizaleli mabe. Kasi Yobo atikalaki sembo.

Yango esepelisaki Yehova mingi, mpe na nsima apambolaki Yobo, ndenge ozali komona na elilingi oyo. Nzambe abikisaki ye na maladi mabe oyo abɛlaki. Yobo abotaki lisusu bana zomi ya kitoko mpe azwaki bangɔmbɛ, bampunda, bampate ná bakamela mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.

Okozala ntango nyonso sembo epai ya Yehova lokola Yobo? Soki osali bongo, Nzambe akopambola yo mpe. Okoki kozala na bomoi libela ntango mabele mobimba ekokóma paradiso lokola elanga ya Edene.

Yobo 1:1-22; 2:1-13; 42:10-17.

Yobo ná libota na ye


Mituna

  • Yobo azalaki nani?
  • Satana alukaki kosala nini, kasi alongaki?
  • Yehova apesaki Satana nzela asala nini, mpe mpo na nini?
  • Mpo na nini mwasi ya Yobo alobaki na ye “lakelá Nzambe mabe mpe kufá”? (Talá elilingi.)
  • Na elilingi ya mibale, na ndenge nini Yehova apesaki Yobo mapamboli, mpe mpo na nini?
  • Soki biso mpe tolandi kotosa Yehova lokola Yobo, tokozwa mapamboli nini?

Mituna mosusu