Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 27: Bayisraele bakómi baombo

Lisolo 27: Bayisraele bakómi baombo

NA ELILINGI oyo bozali komona ndenge bazali kosalisa bato mosala na makasi. Talá kutu moto moko azali kobɛta moko ya basali yango fimbo. Baoyo bazali kosala mosala bazali bato ya libota ya Yakobo, Bayisraele. Kasi baoyo bazali kosalisa Bayisraele mosala na makasi ezali Baezipito. Bayisraele bakómi baombo ya Baezipito. Yango ebandaki boni?

Baezipito bazali konyokola Bayisraele

Libota monene ya Yakobo efandaki na kimya na Ezipito bambula mingi. Yozefe, oyo azalaki moto monene koleka bato nyonso nsima ya mokonzi Farao, azalaki kobatela bato na ye. Kasi Yozefe akufi. Na nsima, Farao mosusu, oyo alingaki Bayisraele te, akómaki mokonzi ya Ezipito.

Mokonzi mabe yango akómisaki Bayisraele baombo. Aponeli bango bakapita ya mabe. Basalisi Bayisraele misala makasi ya kotonga bamboka ya Farao. Kasi atako minyoko ezalaki, Bayisraele bazalaki se kokóma ebele. Nsima ya mwa ntango, Baezipito bakómaki kobanga Bayisraele mpo bakómaki ebele mpe makasi mingi.

Baezipito bazali konyokola Bayisraele

Bongo Farao asalaki nini? Ayebisaki basi oyo bazalaki kosalisa basi ya Yisraele na kobota makambo oyo bakosala, mpe alobaki ete: ‘Bosengeli koboma bana mibali nyonso.’ Kasi basi yango bazalaki basi malamu mpe babomaki bana yango te.

Yango wana Farao apesaki bato na ye nyonso etinda oyo: ‘Bosengeli koboma bana mibali nyonso oyo Bayisraele bakobota, kasi bótika bana basi na bomoi.’ Mobeko yango ezalaki mabe mpenza! Tótala ndenge nini mwana mobali moko boye abikaki.

Kobima 1:6-22.



Mituna

  • Na elilingi oyo, mobali oyo asimbi fimbo ezali nani, mpe azali kobɛta nani?
  • Nsima ya liwa ya Yozefe, nini ekómelaki Bayisraele?
  • Mpo na nini Baezipito bakómaki kobanga Bayisraele?
  • Farao alobaki nini na basi oyo bazalaki kobotisa basi ya Yisraele?

Mituna mosusu