Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 33: Bakatisi Mbu Motane

Lisolo 33: Bakatisi Mbu Motane

BÓTALA elilingi oyo! Moto oyo asemboli lingenda na ye likoló ya Mbu Motane ezali Moize. Baoyo batɛlɛmi pene na ye ezali Bayisraele. Kasi Farao ná ebele ya basoda na ye bazindi na mai mpe bakufi. Tiká tótala ndenge elekaki.

Basoda ya Ezipito bazindi na mai

Ndenge tomonaki yango, nsima ya bolɔzi ya zomi nde Farao atikaki Bayisraele bákende. Bazalaki mibali soki nkóto nkama motoba (600 000), longola basi ná bana. Lisusu, ebele ya bato oyo bandimelaki Yehova bakendeki elongo na bango. Bakendeki na bibwɛlɛ na bango nyonso.

Liboso Bayisraele bákende, basɛngaki Baezipito bilamba ná biloko oyo esalemi na wolo mpe na palata. Bolɔzi wana ya nsuka ebangisaki Baezipito makasi mpenza. Yango wana, bapesaki Bayisraele biloko nyonso oyo basɛngaki.

Nsima ya mwa mikolo, Bayisraele bakómi na Mbu Motane. Bapemi wana. Nzokande Farao ná bato na ye bayokaki mabe ndenge batiki Bayisraele bákende. Balobi ete: ‘Mpo na nini totiki baombo na biso bákende?’

Na mbala moko, Farao azwi makanisi mosusu. Abongisi makalo na ye ya etumba ná basoda na ye nokinoki. Alandi Bayisraele na makalo ya etumba ya makasi mpenza nkama motoba (600) mpe na makalo mosusu nyonso ya Ezipito.

Ntango Bayisraele bamoni Farao ná basoda na ye bazali kolanda bango, babangaki mingi. Epai ya kokima ezali te. Liboso na bango Mbu Motane, mpe nsima na bango Baezipito bazali koya. Kasi Yehova akɔtelaki bango, atyaki lipata kati na bango ná Baezipito. Yango wana, Baezipito bazalaki komona Bayisraele te mpe bakokaki kokanga bango te.

Na nsima, Yehova ayebisi Moize asembola lingenda na ye likoló ya Mbu Motane. Moize atosaki mpe Yehova atindaki mopɛpɛ makasi ya ɛsti. Mai ya mbu ekabwani na mibale mpe etɛlɛmi epai na epai.

Bongo Bayisraele bakatisi na mabele oyo esili kokauka. Esɛngaki bangonga mingi mpo bamilio ya bato wana ná bibwɛlɛ na bango bákoka kokóma malamu na ngámbo mosusu. Na ntango wana, Baezipito bamonaki lisusu Bayisraele na mosika. Baombo na bango bazali kokima. Bongo Baezipito bakɔti na kati ya Mbu Motane nokinoki mpo na kolanda bango.

Na ntango yango, Nzambe abebisaki makolo ya makalo na bango, mpe ekómaki kolongwa. Baezipito babangaki makasi mpe babandaki koganga: ‘Tókima, mpo Yehova azali kobunda na biso mpo na Bayisraele.’ Kasi likoki ya kokima ezalaki lisusu te.

Na ntango wana, Yehova ayebisi Moize asembola lingenda na ye likoló ya Mbu Motane, ndenge bozali komona na elilingi oyo. Moize atosaki mpe mai ezongi na esika na yango, ezipi Baezipito ná makalo na bango. Nzokande basoda nyonso bakɔtaki na mbu mpo na kolanda Bayisraele. Yango wana, bakufaki bango nyonso mpe.

Libota ya Nzambe basepelaki mpenza mpo babiki. Babandaki koyembela Yehova mpo na kopesa ye matɔndi. Balobaki ete: ‘Yehova alongi etumba monene. Abwaki bampunda ná batambwisi na yango na kati ya mbu.’ Miriame, ndeko ya Moize, akamataki mwa mbonda na ye mpe basi nyonso balandaki ye, bakamati mwa bambonda na bango. Babandi kobina na esengo mpe koyemba ete: ‘Yehova alongi etumba monene. Abwaki bampunda ná batambwisi na yango na kati ya mbu.’

Kobima mokapo 12 tii 15.



Mituna

  • Soki tolongoli basi ná bana, mibali boni ya Yisraele balongwaki na Ezipito, mpe banani mosusu balongwaki na bango elongo?
  • Farao ayokaki ndenge nini nsima ya kotika Bayisraele bákende, mpe asalaki nini?
  • Yehova asalaki nini mpo bato ya Ezipito bábundisa bato na ye te?
  • Likambo nini esalemaki ntango Moize asembolaki lingenda na ye likoló ya Mbu Motane, mpe Bayisraele basalaki nini?
  • Likambo nini esalemaki ntango Baezipito bakɔtaki na mbu mpo na kolanda Bayisraele?
  • Ndenge nini Bayisraele bamonisaki esengo na bango mpe botɔndi na bango epai ya Yehova mpo abikisi bango?

Mituna mosusu