Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 35: Yehova apesi mibeko na ye

Lisolo 35: Yehova apesi mibeko na ye

SANZA soki mibale nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, bakómi na Ngomba Sinai, to Horebe. Yango nde esika oyo Yehova alobaki na Moize na katikati ya mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ. Bato batyaki kaa na bango wana, mpe baumelaki wana mwa moke.

Moize amati na ngomba, bato batikali kozela na nse. Ntango Moize akómi na nsɔngɛ ya ngomba, Yehova ayebisi ye ete alingi ete Bayisraele bátosa Ye mpe bákóma bato na Ye mpenza. Ntango Moize akiti, ayebisi Bayisraele makambo Yehova alobaki. Bato balobaki ete bakotosa Yehova mpo balingi kozala bato na ye mpenza.

Na ntango yango, Yehova asali likambo ya kokamwa. Abimisi molinga na nsɔngɛ ya ngomba, mpe abɛtisi bankake makasi mpenza. Ayebisi mpe bato ete: ‘Ngai nazali Yehova Nzambe na bino oyo abimisaki bino na Ezipito.’ Yango wana, apesi mobeko oyo: ‘Bosengeli kosambela banzambe mosusu te kaka ngai.’

Bitanda mibale ya mabanga

Na nsima, Nzambe apesi Bayisraele mibeko mosusu libwa. Bato babangi makasi. Balobi na Moize ete: ‘Yo lobá na biso, kasi Nzambe aloba na biso te noki tókufa.’

Bongo, Yehova alobi na Moize ete: ‘Matá epai na ngai na ngomba. Nakopesa yo bitanda mibale ya mabanga oyo nakomi mibeko oyo nalingi bato bátosa yango.’ Mpe Moize amataki lisusu na ngomba. Aumeli kuna mikolo ntuku minei (40) butu moi.

Nzambe azalaki na ebele ya mibeko oyo asengelaki kopesa libota na ye. Moize akomaki yango. Yehova apesaki ye mpe bitanda mibale ya mabanga. Nzambe akomaki, na mabanga yango, mibeko zomi oyo ayebisaki Yisraele mobimba. Babengaka mibeko yango Mibeko Zomi.

Moize na Ngomba Sinai

Mibeko Zomi ezali na ntina mingi. Ata ebele ya mibeko mosusu oyo Nzambe apesi Yisraele ezali mpe na ntina mingi. Talá moko ya mibeko yango: ‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na makasi na yo nyonso.’ Mpe mosusu elobi boye: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, alobaki ete wana ezali mibeko mibale oyo eleki mibeko nyonso oyo Yehova apesaki Yisraele. Na masolo mosusu, tokoyekola makambo ebele oyo etali Mwana ya Nzambe mpe mateya na ye.

Kobima 19:1-25; 20:1-21; 24:12-18; 31:18; Kolimbola Mibeko 6:4-6; Balevi 19:18; Matai 22:36-40.



Mituna

  • Sanza mibale nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, basalaki kaa na bango wapi?
  • Yehova alobi ete alingi Bayisraele básala nini, mpe bango bapesi eyano nini?
  • Mpo na nini Yehova apesi Moize bitanda mibale ya mabanga?
  • Longola Mibeko Zomi, wapi mibeko mosusu oyo Yehova apesaki Bayisraele?
  • Wapi mibeko mibale oyo Yesu Kristo alobaki ete eleki mibeko nyonso?

Mituna mosusu