Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 38: Banɔngi 12

Lisolo 38: Banɔngi 12
Bayisraele oyo bakendeki kotala mokili bamemi mbuma

TALÁ mbuma bato oyo bamemi. Etape yango ezali na mbuma minene mpenza. Esengeli bato mibale mpo na komema yango na nzete. Ezali mbuma ya figi ná grenade. Mbuma kitoko yango euti wapi boye? Euti na mokili ya Kanana. Kobosana te, Abrahama, Yisaka ná Yakobo bafandaki na mokili yango. Kasi lokola nzala ekɔtaki na mokili yango, Yakobo ná libota na ye bakendeki kofanda na Ezipito. Talá sikoyo, mbula nkama mibale na zomi na motoba (216) na nsima, Moize azali kozongisa Bayisraele na mokili ya Kanana. Bakómi sikoyo na esobe, na esika babengi Kadeshe.

Bato ya Kanana bazali bato mabe. Yango wana, Moize atindi bato zomi na mibale mpo na kotala mokili yango na mayele mpe alobaki na bango ete: ‘Bótala soki bato oyo bazali kofanda kuna bazali moke to mingi, soki bazali na makasi to te. Bótala soki mabele yango ebotaka malamu. Mpe bóya na ndambo ya mbuma ya mokili yango.’

Ntango bato yango bazongi na Kadeshe, bayebisi Moize boye: ‘Mokili yango ezali malamu mpenza. Talá kutu mbuma na yango.’ Kasi, bato zomi kati na baoyo bauti kotala mokili yango balobi ete: ‘Bato oyo bafandi na mokili wana bazali na makasi. Soki tomeki kozwa mokili yango, bakoboma biso nyonso.’

Ntango Bayisraele bayoki maloba wana, babangi makasi mpe balobi ete: ‘Soki tókufaka ata na Ezipito to na esobe oyo mbɛlɛ malamu! Tokokufa na etumba, mpe basi na biso ná bana na biso bakokangama. Tiká tópona mokambi mosusu na esika ya Moize mpe tózonga na Ezipito!’

Kasi bato mibale na kati ya baoyo batindamaki, Yosua ná Kalebe, batyelaki Yehova motema. Bameki kokitisa bato motema. Balobi na bango ete: ‘Bóbanga te. Yehova azali na biso. Tokozwa mokili yango na bolɛmbu mpenza.’ Kasi bato bayokeli bango te, mpe baluki kutu nde koboma bango.

Likambo yango eyokisaki Yehova nkanda makasi, bongo alobi na Moize ete: ‘Moto nyonso, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, akokɔta na mokili ya Kanana te. Bamonaki makamwisi oyo nasalaki na Ezipito mpe na esobe, kasi ata bongo bazali kotyela ngai motema te. Yango wana, bakotambola na esobe mbula ntuku minei (40), kino bakokufa bango nyonso. Kaka Yosua ná Kalebe nde bakokɔta na mokili ya Kanana.’

Mitángo 13:1-33; 14:1-38.



Mituna

  • Etape ya mbuma ya vinyo oyo ozali komona na elilingi oyo ezali ndenge nini, mpe euti wapi?
  • Mpo na nini Moize atindi bato 12 bákende kotala mokili ya Kanana?
  • Bato zomi oyo bakendeki kotala mboka balobaki na Moize nini?
  • Ndenge nini bato mibale bamonisi ete bazali kondimela Yehova, mpe nkombo na bango banani?
  • Mpo na nini Yehova asiliki, mpe ayebisi Moize nini?

Mituna mosusu