Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 39: Lingenda ya Arona

Lisolo 39: Lingenda ya Arona

TALÁ lingenda oyo ebimisi fololo mpe mbuma ya amande oyo eteli. Ezali lingenda ya Arona. Fololo ná mbuma yango ebimi na butu moko mpamba. Yango ebandaki boni?

Moize azali kopesa Arona lingenda oyo ebimisi fololo

Bayisraele bazalaki kotambolatambola na kati ya esobe. Bato mosusu basepelaki te ete Moize azala mokambi mpe Arona nganga-nzambe monene. Kora azalaki moko ya bato yango, bakisa Datane ná Abirame ná bankumu nkama mibale na ntuku mitano (250). Mokolo moko, bango nyonso balobi na Moize ete: ‘Mpo na nini bozali komitombola likoló na biso?’

Moize alobi na Kora mpe na bato na ye ete: ‘Lobi na ntɔngɔ, bózwa biloko ya kotya mɔtɔ, bótya mɔtɔ mpe mpaka ya malasi likoló na yango. Na nsima bóya na hema ya Yehova. Bongo tokomona moto oyo Yehova akopona.’

Na mokolo oyo elandi, Kora ná bato na ye nkama mibale na ntuku mitano bakei na hema. Ebele ya bato mosusu mpe bayei kolendisa bango. Yehova ayoki nkanda makasi. Bongo Moize alobi ete: ‘Bólongwa liboso ya bahema ya mibali mabe oyo. Bósimba eloko na bango ata moko te.’ Bato balongwe penepene na bahema ya Kora, Datane ná Abirame.

Na nsima Moize alobi ete: ‘Na likambo oyo bokoyeba moto oyo Yehova aponi. Mabele ekofungola monɔkɔ na yango mpe ekomɛla bato mabe oyo.’

Ntango Moize asilisi koloba, mabele efungoli monɔkɔ na yango, emɛli ndako ná biloko nyonso ya Kora, Datane, ná Abirame mpe bato oyo bayaki elongo na bango. Ntango bato bayoki kolela na bango, bagangi ete: ‘Tókima, noki mabele emɛla biso!’

Kora ná bato na ye nkama mibale na ntuku mitano batɛlɛmaki kaka pene na hema. Na ntango yango Yehova atindi mɔtɔ, ezikisi bango nyonso. Na nsima, Yehova alobi na Eleazare, mwana ya Arona, ete alongola biloko ya kotya mɔtɔ ya bato oyo bakufi mpe asala na yango ezipeli ya etumbelo. Ezipeli yango ekómaki elembo ya kokebisa Bayisraele, bábosana te ete kaka Arona ná bana na ye nde bazwi mosala ya bonganga-nzambe, kasi bato mosusu te.

Na yango, Yehova amonisi polele mpenza ete aponi bobele Arona ná bana na ye bázala banganga-nzambe. Alobi na Moize boye: ‘Nkumu mokomoko na kati ya mabota nyonso ya Yisraele aya na lingenda na ye. Na libota ya Levi, Arona aya na yango. Na nsima, tyá mangenda nyonso na kati ya hema, liboso ya sanduku ya kondimana. Lingenda ya moto oyo ngai naponi ekobimisa nkasa ná fololo.’

Na ntɔngɔ Moize akei kotala, bongo lingenda ya Arona ebimisaki nkasa ná fololo, mpe mbuma ya amande esilaki kotela. Sikoyo boyebi ntina oyo Yehova asalaki likamwisi yango?

Mitángo 16:1-49; 17:1-11; 26:10.



Mituna

  • Banani baboyaki kotosa bokonzi ya Moize mpe ya Arona, mpe balobaki na Moize nini?
  • Moize ayebisaki Kora ná bato 250 oyo balandaki ye básala nini?
  • Moize ayebisaki bato nini, mpe likambo nini esalemaki ntango kaka asilisi koloba?
  • Likambo nini ekómelaki Kora ná bato 250 oyo balandaki ye?
  • Eleazare mwana ya Arona asalaki nini na biloko ya kotya mɔtɔ ya bato oyo bakufaki, mpe mpo na nini?
  • Mpo na nini Yehova asalaki ete lingenda ya Arona ebimisa fololo? (Talá elilingi.)

Mituna mosusu