Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 40: Moize abɛti libanga

Lisolo 40: Moize abɛti libanga

MBULA zomi, ntuku mibale (20), ntuku misato (30), ntuku misato na libwa (39) eleki, Bayisraele bazali naino na esobe. Nzokande Yehova asundoli bato na ye te. Azali koleisa bango mana. Na moi, azali kotambwisa bango na likonzí ya lipata mpe na butu na likonzí ya mɔtɔ. Na ebele ya bambula nyonso wana, bilamba na bango epasukaki te mpe makolo na bango evimbaki te.

Sikoyo ekómi sanza ya liboso na mbula ya ntuku minei (40) uta Bayisraele babimaki na Ezipito. Bazongi lisusu na Kadeshe. Bazalaki na esika yango, esili koleka mbula pene na ntuku minei, na mikolo oyo Moize atindaki bato zomi na mibale bátala mokili ya Kanana na mayele. Miriame, yaya ya Moize, akufaki na Kadeshe. Lokola na ntango ya kala, makambo ebebi lisusu wana.

Bayisraele bazwi mai te. Bongo batombokeli Moize, balobi na ye ete: ‘Malamu soki tókufaka ata kokufa. Mpo na nini obimisi biso na mokili ya Ezipito mpo na komema biso na esika mabe oyo? Ezali esika ya mboto te, figi te, vinyo te, grenade mpe te. Ata mai ya komɛla mpe ezali te.’

Moize abɛti libanga

Moize ná Arona bakei kosambela na hema, mpe Yehova alobi na Moize ete: ‘Sangisá bato nyonso! Na nsima, lobá na libanga wana na miso na bango ete ebimisa mai. Bongo ekobimisa mai mingi mpo na bato ná bibwɛlɛ na bango nyonso.’

Bongo Moize asangisi bato mpe alobi na bango ete: ‘Bóyoka, bino bato botyelaka Nzambe motema te. Ngai ná Arona tóbimisa mai na libanga oyo?’ Na nsima, Moize abɛti libanga lingenda na ye mbala mibale, bongo libanga yango ebimisi mai mingi. Ekokaki mpo bato ná bibwɛlɛ na bango bámɛla.

Kasi Yehova asilikeli Moize ná Arona. Boyebi ntina asiliki? Mpo Moize ná Arona balobi ete bango nde bakobimisa mai na libanga. Kasi Yehova nde moto abimisaki mai yango. Lokola Moize ná Arona balobaki solo te na likambo yango, Yehova ayebisaki bango ete akopesa bango etumbu. Alobaki na bango boye: ‘Bokokɔtisa bato na ngai na mokili ya Kanana te.’

Bongo Bayisraele balongwaki na Kadeshe. Mwa moke na nsima, bakómi na Ngomba Hore. Arona akufi wana, na nsɔngɛ ya Ngomba Hore. Ntango akufaki azalaki na mbula nkama moko na ntuku mibale na misato (123). Bayisraele bayokaki mawa mingi mpenza, mpe balelaki ye mikolo ntuku misato (30). Eleazare, mwana na ye, akómi nganga-nzambe monene na esika na ye.

Mitángo 20:1-13, 22-29; Kolimbola Mibeko 29:5.



Mituna

  • Ndenge nini Yehova abatelaki Bayisraele ntango bazalaki na esobe?
  • Ntango Bayisraele bafandaki na Kadeshe, bamilelaki mpo na nini?
  • Ndenge nini Yehova abimiselaki bato ná bibwɛlɛ na bango mai?
  • Na elilingi oyo, moto oyo azali komilakisa mosapi ezali nani, mpe mpo na nini asali bongo?
  • Mpo na nini Yehova asilikeli Moize ná Arona, mpe na ndenge nini apesi bango etumbu?
  • Likambo nini esalemaki na Ngomba Hore, mpe nani akómaki nganga-nzambe monene ya Yisraele?

Mituna mosusu