Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 43: Yosua akómi mokambi

Lisolo 43: Yosua akómi mokambi

MOIZE azali na mposa mpenza ya kokɔta na mokili ya Kanana elongo na Bayisraele. Yango wana abondeli boye: ‘Ee, Yehova, tiká nakatisa Ebale Yordani mpe namona mokili malamu yango.’ Kasi Yehova alobi na ye ete: ‘Suká wana! Kolobela lisusu likambo yango te.’ Oyebi ntina Yehova alobi bongo?

Ezali mpo na likambo oyo esalamaki ntango Moize abɛtaki libanga. Kobosana te, mokolo wana, Moize ná Arona bakumisaki Yehova te. Bayebisaki bato te ete Yehova nde moto abimisi mai na libanga. Yango wana, Yehova ayebisaki ye ete akokɔta na mokili ya Kanana te.

Bongo mwa basanza nsima ya liwa ya Arona, Yehova ayebisi Moize ete: ‘Zwá Yosua, mpe tɛlɛmisá ye liboso ya nganga-nzambe Eleazare mpe liboso ya bato nyonso. Mpe lobá na miso ya bato nyonso ete Yosua akómi mokambi na bango.’ Moize asali kaka ndenge Yehova alobi na ye, ndenge bozali komona na elilingi oyo.

Moize azali koyebisa bato ete Yosua akómi mokambi

Na nsima, Yehova alobi na Yosua ete: ‘Zalá na makasi, mpe kobanga te. Yo nde moto okokɔtisa Bayisraele na mokili ya Kanana oyo nalakaki bango, mpe nakozala na yo.’

Bongo Yehova alobi na Moize ete amata na Ngomba Nebo, na mokili ya Moabe. Kuna Moize akozwa likoki ya komona ngámbo mosusu ya Ebale Yordani, mpe amonaki mokili kitoko ya Kanana. Mpe Yehova alobaki na ye ete: ‘Talá mokili oyo nalakaki ete nakopesa yango bana ya Abrahama, Yisaka ná Yakobo. Natiki yo omona yango kasi nakotika yo okɔta kuna te.

Moize akufaki wana, na nsɔngɛ ya Ngomba Nebo. Azalaki na mbula nkama moko na ntuku mibale (120). Azalaki naino makasi, mpe miso na ye ezalaki naino malamu. Bato bayokaki mawa mingi mpe balelaki Moize mikolo mingi. Kasi basepelaki na Yosua, mokambi na bango ya sika.

Mitángo 27:12-23; Kolimbola Mibeko 3:23-29; 31:1-8, 14-23; 32:45-52; 34:1-12.



Mituna

  • Na elilingi oyo, bato mibale oyo batɛlɛmi na Moize nkombo na bango banani?
  • Yehova alobi na Yosua nini?
  • Mpo na nini Moize amati na Ngomba Nebo, mpe Yehova alobi na ye nini?
  • Ntango Moize akufaki azalaki na mbula boni?
  • Mpo na nini bato bazali na mawa, kasi mpo na nini basengeli nde kosepela?

Mituna mosusu