Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 45: Bakatisi Ebale Yordani

Lisolo 45: Bakatisi Ebale Yordani

TALÁ Bayisraele bazali kokatisa Ebale Yordani. Kasi, mai ekei wapi? Na mikolo yango, mbula ezalaki konɔka mingi, mpe liboso bákatisa, mai ya ebale yango etondaki tii na libongo. Kasi sikoyo mai yango nyonso elimwe. Bayisraele bango wana bazali koleka na mabele oyo esili kokauka, kaka ndenge balekaki na Mbu Motane. Mai yango nyonso eleki wapi? Tótala ndenge esalemaki.

Bayisraele bazali kokatisa Ebale Yordani

Ntango mokolo ya kokatisa Ebale Yordani ekoki, Yehova atindi Yosua ayebisa Bayisraele ete: ‘Banganga-nzambe basengeli kozwa sanduku ya kondimana mpe koleka liboso na biso. Ntango bakotya makolo na bango na mai ya Ebale Yordani, mai ekotika kotiyola.’

Bongo banganga-nzambe bazwi sanduku ya kondimana mpe batamboli liboso ya bato. Ntango banganga-nzambe yango bakómi na Ebale Yordani, bakɔti mbala moko na mai. Mai ezali kotiyola makasi mpe ebale ezali mozindo. Kasi, ntango kaka makolo na bango enyati mai, mai ya Yordani ebandi kotɛlɛma. Yango ezali mpenza likamwisi! Yehova atɛlɛmisi mai oyo ezali kouta likoló, ekómi lokola efelo. Mosika te ebale ekauki.

Banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana batɛlɛmi na katikati ya ebale, mai esili kokauka. Bozali komona bango na elilingi? Batɛlɛmaki wana, bazali koningana te, kino Bayisraele nyonso bakatisaki Ebale Yordani na mabele oyo ekauki.

Ntango bato nyonso basilisi kokatisa, Yehova asɛngi Yosua aloba na mibali zomi na mibale ya nguya ete: ‘Bókende na kati ya mai na esika oyo banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana batɛlɛmi. Bózwa mabanga zomi na mibale mpe bótya yango na esika oyo bokolala na butu ya lelo. Bongo na mikolo ekoya, soki bana na bino batuni bino ete, mabanga oyo ezali na ntina nini? Bokoyebisa bango ete mai ya Yordani etikaki kotiyola ntango sanduku ya kondimana ya Yehova ekatisaki Yordani. Mabanga oyo ekokundwela bino likamwisi yango.’ Yosua mpe atɛlɛmisi mabanga zomi na mibale na esika oyo banganga-nzambe batɛlɛmaki na kati ya ebale.

Yosua

Na nsima, Yosua ayebisi banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana ete bábima na Yordani. Ntango kaka babimi, mai ya ebale ebandi lisusu kotiyola.

Yosua 3:1-17; 4:1-18.



Mituna

  • Likamwisi nini Yehova asalaki mpo Bayisraele bákatisa Ebale Yordani?
  • Mpo na kokatisa Ebale Yordani, Bayisraele basengelaki kosala nini mpo na komonisa ete bazali na kondima makasi?
  • Mpo na nini Yehova alobi na Yosua ete bátya mabanga 12 ya minene na ebale?
  • Likambo nini esalemaki ntango kaka banganga-nzambe batikaki mai ya Yordani?

Mituna mosusu

  • Tángá Yosua 3:1-17.

    Ndenge lisolo oyo emonisi yango, tosengeli kosala nini mpo Yehova asunga biso mpe apambola biso? (Yos. 3:13, 15; Mas. 3:5; Yak. 2:22, 26)

    Ebale Yordani ezalaki ndenge nini ntango Bayisraele bakatisaki yango mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka, mpe na ndenge nini likambo yango epesi nkombo ya Yehova nkembo? (Yos. 3:15; 4:18; Nz. 66:5-7)

  • Tángá Yosua 4:1-18.

    Mabanga 12 oyo bazwaki na Yordani mpe batɛlɛmisi yango na Gilegale ezalaki na ntina nini? (Yos. 4:4-7)