Lisolo 49: Moi etɛlɛmi
BÓTALA Yosua. Alobi ete: ‘Moi tɛlɛmá!’ Mpe moi etɛlɛmi. Etikali na katikati ya likoló mokolo mobimba. Yehova nde moto atɛlɛmisi yango. Kasi mpo na nini Yosua alingi moi ekita te?
Ntango bakonzi mitano ya mabe ya Kanana oyo tolobelaki liboso bayaki kobunda na bato ya Gibeone, bato ya Gibeone batindaki moto abenga Yosua aya kosalisa bango; mpe moto yango alobaki ete: ‘Yaká noki epai na biso. Bikisá biso. Bakonzi nyonso ya etúká ya ngomba bayei kobunda na basaleli na yo.’
Yosua ná bato na ye bakei mbala moko. Batamboli butu mobimba. Ntango bakómi na Gibeone, basoda ya bakonzi mitano wana babangi makasi mpe babandi kokima. Bongo Yehova atindeli bango mbula ya mabanga, mpe mbula yango ebomaki basoda mingi koleka oyo bato ya Yosua babomaki.
Bongo Yosua amoni ete moi elingi kokɔta. Butu elingi koya mpe banguna bakokima. Yango wana, abondeli Yehova mpe alobi ete: ‘Moi tɛlɛmá!’ Mpe lokola moi etɛlɛmi, Bayisraele bakobi koboma banguna na bango.
Na Kanana, ezalaki na bakonzi mosusu ya mabe oyo bazalaki koyina libota ya Nzambe. Esɛngaki mbula soki motoba mpo Yosua ná basoda na ye bálonga bakonzi ntuku misato na moko (31) na mokili yango. Nsima na yango, Yosua akabolaki mokili ya Kanana na mabota oyo bazwaki naino eteni na bango ya mokili te.
Bambula mingi elekaki, mpe nsukansuka Yosua akufi, na mbula nkama moko na zomi (110). Ntango nyonso oyo ye ná baninga na ye bazalaki na bomoi, bato batosaki Yehova. Kasi nsima ya liwa ya bato malamu wana, Bayisraele babandaki kosala mabe, mpe mpasi ezalaki koyela bango. Na ntango yango, bazalaki kosɛnga Nzambe asalisa bango.
Yosua 10:6-15; 12:7-24; 14:1-5; Basambisi 2:8-13.
Mituna
- Na elilingi oyo, Yosua azali koloba nini, mpe mpo na nini?
- Ndenge nini Yehova asalisaki Yosua ná mibali na ye ya etumba?
- Yosua alongaki bakonzi boni, mpe bitumba yango eumelaki mbula boni?
- Mpo na nini Yosua akabolaki mokili ya Kanana?
- Ntango Yosua akufi, azalaki na mbula boni, mpe bato bakómaki kosala nini na nsima?
Mituna mosusu
- Tángá Yosua 10:6-15.
Koyeba ete Yehova atɛlɛmisaki moi ná sanza mpo na Yisraele, etindi biso tózala na elikya nini lelo oyo? (Yos. 10:8, 10, 12, 13; Nz. 18:3; Mas. 18:10)
- Tángá Yosua 12:7-24.
Nani mpenzampenza nde alongaki bakonzi 31 ya Kanana, mpe mpo na nini likambo yango ezali na ntina mpo na biso lelo oyo? (Yos. 12:7; 24:11-13; Mib. 31:8; Luka 21:9, 25-28)
- Tángá Yosua 14:1-5.
Ndenge nini mabele ekabolamaki kati na mabota ya Yisraele, mpe likambo yango emonisi nini mpo na libula na paradiso? (Yos. 14:2; Yis. 65:21; Ezk. 47:21-23; 1 Ko. 14:33)
- Tángá Basambisi 2:8-13.
Ndenge Yosua azalaki kosala na Yisraele, nani lelo oyo azali kobatela biso mpo tópɛngwa te? (Bas. 2:8, 10, 11; Mat. 24:45-47; 2 Tes. 2:3-6; Tito 1:7-9; Em. 1:1; 2:1, 2)