Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 50: Basi mibale ya mpiko

Lisolo 50: Basi mibale ya mpiko

BATO ya Yisraele bazalaki kobelela Yehova mbala nyonso oyo bazalaki kokutana na mikakatano. Bongo Yehova azalaki kopesa bango bakambi ya mpiko mpo na kosalisa bango. Biblia ebengi bango basambisi. Yosua azalaki mosambisi ya liboso. Nsima na ye, basambisi mosusu babimaki: Otiniele, Ehude ná Shamagare. Kasi na kati ya bato oyo basalisaki Yisraele, ezali mpe na basi mibale, Debora ná Yaele.

Debora azali kosolola na Barake

Debora azalaki mosakoli. Yehova azalaki koyebisa ye makambo oyo ekoya mpe ye azalaki koyebisa bato makambo yango. Debora azalaki mpe mosambisi. Azalaki kofanda na nse ya nzete ya mbila na etúká ya ngomba mpe bato bazalaki kokende epai na ye mpo akatela bango makambo.

Na ntango yango Yabine azalaki mokonzi ya Kanana. Azalaki na makalo ya etumba nkama libwa (900). Basoda ya Yabine bazalaki na nguya mingi; yango wana Bayisraele mingi bakómaki baombo na ye. Nkombo ya mokonzi ya basoda na ye Sisera.

Mokolo moko, Debora atindi bato bábenga mosambisi Barake mpe alobi na ye ete: ‘Yehova alobi boye: “Kamatá mibali nkóto zomi (10 000) mpe kende na bango na Ngomba Tabore. Kuna nakotindela yo Sisera, mpe yo okolonga ye ná basoda na ye.” ’

Barake azongiseli ye ete: ‘Nakokende kaka soki okei elongo na ngai.’ Bongo Debora akendeki elongo na ye, kasi ayebisaki Barake ete: ‘Lokumu ya kolonga ekozala ya yo te, mpo Yehova akokaba Sisera na lobɔkɔ ya mwasi.’ Esalemaki mpe bongo.

Barake akiti na Ngomba Tabore mpo na kokutana na basoda ya Sisera. Na mbala moko, Yehova atondisi mai na nzela mpe banguna mingi bakufi. Bongo Sisera akiti na likalo na ye akimi na makolo.

Barake, Yaele, mpe Sisera

Na nsima, Sisera akómi na ndako ya Yaele. Mwasi yango akɔtisi ye na ndako mpe apesi ye miliki amɛla. Miliki yango elalisi ye mpɔngi makasi mpenza. Bongo Yaele akamati pike ya hema mpe atɔbɔli moto mabe wana pike yango na motó. Ntango Barake akómi, alakisi ye ebembe ya Sisera. Maloba ya Debora ekokisami mpenza.

Na nsuka, Mokonzi Yabine mpe abomami, mpe Bayisraele bazwi kimya bambula mingi.

Basambisi 2:14-22; 4:1-24; 5:1-31.



Mituna

  • Basambisi bazali banani, nkombo ya bamosusu kati na bango banani?
  • Wapi libaku ya malamu mpenza oyo Debora azalaki na yango, mpe yango ezalaki kosɛnga nini?
  • Ntango Mokonzi Yabine ná Sisera, mokonzi ya basoda na ye, bazalaki kotungisa Yisraele, nsango nini Yehova atindaki Debora apesa Mosambisi Barake, mpe alobaki na ye ete lokumu ya elonga ekozala ya nani?
  • Ndenge nini Yaele amonisaki ete azali mwasi ya mpiko?
  • Makambo ekómaki ndenge nini nsima ya liwa ya Mokonzi Yabine?

Mituna mosusu