Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 52: Gideone ná bato na ye 300

Lisolo 52: Gideone ná bato na ye 300

OZALI komona likambo oyo ezali kosalema awa? Bato oyo nyonso ezali basoda ya Yisraele. Mibali oyo bagunzami bazali komɛla mai. Bongo oyo atɛlɛmi pene na bango ezali Gideone, azali mosambisi. Azali kotala ndenge bazali komɛla mai.

Bongo tótala ndenge basoda yango bazali komɛla mai. Basusu batye bilongi na mai. Moko azali komɛla mai na lobɔkɔ, mpo akoka komonaka makambo oyo ezali koleka zingazinga na ye. Komɛla bongo ezali na ntina, mpo Yehova alobi na Gideone apona kaka baoyo bakobanda kokɛngɛla ntango bazali komɛla mai. Baoyo bakosala bongo te basengeli kozonga. Mpo na nini asɛngaki likambo ya ndenge wana?

Bayisraele bakómi lisusu na mpasi, mpo batosi Yehova te. Bato ya Midiane baleki bango na makasi mpe bakómi konyokola bango. Bongo Bayisraele babeleli Yehova asalisa bango, mpe Yehova ayoki kolela na bango.

Yehova atindi Gideone aluka basoda, mpe Gideone asangisi bato nkóto ntuku misato na mibale (32 000). Kasi banguna bazali na basoda nkóto nkama moko na ntuku misato na mitano (135 000). Ata bongo Yehova alobi na Gideone ete: ‘Bato na yo baleki ebele.’ Mpo na nini?

Mpo soki Yisraele alongi etumba, bakoki kokanisa ete balongi na makasi na bango moko kasi na makasi ya Yehova te. Yango wana Yehova alobi na Gideone ete: ‘Yebisá baoyo nyonso bazali kobanga bázonga epai na bango.’ Ntango Gideone ayebisi bango, basoda nkóto ntuku mibale na mibale (22 000) bazongi epai na bango. Atikali kaka na bato nkóto zomi (10 000) mpo na kobunda na banguna nkóto nkama moko na ntuku misato na mitano (135 000).

Gideone azali komeka basoda na ye

Kasi Yehova alobi na Gideone ete: ‘Bato bazali kaka mingi.’ Yango wana, atindi Gideone ete amɛlisa bato na ye mai, mpe azongisa baoyo nyonso bakotya elongi mobimba na mai. Yehova alakaki ye ete: ‘Nakolongisa bino na bato nkama misato (300) oyo bazalaki kokɛngɛla ntango bazali komɛla mai.’

Ntango ya etumba ekoki. Gideone akaboli bato na ye nkama misato na bituluku misato. Apesi moto mokomoko liseke mpe elokó oyo ezali mpamba ná esungi ya mɔtɔ na kati. Na katikati ya butu, bazingi kaa ya banguna. Lokola bapesanaki elembo, bango nyonso bayuli maseke, babuki bilokó na bango mpe bagangi ete: ‘Mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!’ Banguna balamuki na nsɔmɔ, babulungani mpe bakimi. Bayisraele balongi etumba.

Basambisi mikapo 6 tii 8.



Mituna

  • Ndenge nini Bayisraele bazali na kati ya mpasi monene mpe mpo na nini?
  • Mpo na nini Yehova ayebisaki Gideone ete limpinga na ye ezali na bato mingi?
  • Bato boni batikalaki ntango Gideone ayebisi mibali oyo bazalaki kobanga ete bázonga epai na bango?
  • Salelá elilingi oyo mpo na kolimbola ndenge oyo Yehova akitisaki motángo ya limpinga ya Gideone tii na 300.
  • Ndenge nini Gideone abongisaki bato na ye 300, mpe ndenge nini Yisraele elongaki etumba yango?

Mituna mosusu