Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 55: Mwana moke asaleli Nzambe

Lisolo 55: Mwana moke asaleli Nzambe

TALÁ elenge mobali kitoko oyo! Nkombo na ye Samwele. Mpe mobali oyo asimbi ye na motó ezali nganga-nzambe monene Eli. Tata na ye Elekana ná mama na ye Hana bayei na ye epai ya Eli.

Samwele akutani na nganga-nzambe monene Eli

Elenge Samwele azali na mbula minei to mitano. Nzokande, akofanda na tabernakle ya Yehova, esika moko na Eli ná banganga-nzambe mosusu. Kasi mpo na nini Elekana ná Hana bapesi mwana na bango ya moke boye ete asalela Yehova na tabernakle?

Mwa bambula liboso, Hana azalaki na mawa mpenza mpo azalaki kobota te, nzokande azalaki na mposa makasi ya kobota ata mwana moko. Mokolo moko ayei na tabernakle ya Yehova mpe abondeli boye: ‘Ee Yehova, kobosana ngai te! Soki opesi ngai mwana mobali, nakopesa yo ye mpo asalela yo bomoi na ye mobimba.’

Yehova ayoki libondeli ya Hana mpe nsima ya mwa basanza azwi zemi mpe aboti Samwele. Hana alingaki mwana na ye mingi mpe ateyaki ye makambo ya Yehova banda bomwana mpenza. Alobaki na mobali na ye ete: ‘Nsima ya kolongola mwana na mabɛlɛ, nakokende na ye na tabernakle mpo asalela Yehova kuna.’

Hana ná Elekana basali kaka bongo. Baboti ya Samwele bateyaki ye malamu, yango wana, azalaki kosala mosala na tabernakle ya Yehova na esengo. Mbula na mbula, baboti na ye bazalaki kokende kosambela na tabernakle yango mpe kotala ye. Mbula na mbula, Hana azalaki komemela Samwele mwa kazaka ezangá mabɔkɔ oyo atongelaki ye.

Nsima ya bambula mingi, Samwele azalaki kaka kosala mosala na ye na tabernakle, mpe Yehova ná bato mosusu balingaki ye mingi. Kasi Hofini ná Finehase, bana ya Eli, bazalaki bato mabe. Bazalaki kosala makambo mabe mpe kotinda bato mosusu báboya kotosa Yehova. Esengelaki Eli alongola bango na mosala ya bonganga-nzambe, kasi asali eloko te.

Elenge Samwele alandaki te ndakisa mabe oyo azali komona. Kasi lokola bato moke kaka nde bazalaki kolinga mpenza Yehova, elekaki bambula mingi, Yehova azalaki lisusu koloba na moto te. Bongo talá likambo oyo esalemaki ntango Samwele abandi kokola:

Mokolo moko Samwele alali na tabernakle; na butu ayoki mongongo moko ebengi ye. Bongo ye andimi ete: ‘Ngai oyo!’ Na nsima akei mbangu epai ya Eli mpe alobi ete: ‘Ngai oyo, mpo obengi ngai.’

Kasi Eli azongisi ete: ‘Nabengi yo te; zongá kolala.’ Samwele akei kolala.

Mpe ayoki lisusu mongongo yango ebengi ye. Alamuki, akei lisusu mbangu epai ya Eli. Alobi na ye ete: ‘Ngai oyo mpo obengi ngai solo!’ Eli azongisi ete: ‘Nabengi yo te; zongá kolala.’ Samwele azongi kolala.

Mongongo ebengi ye lisusu mbala ya misato. Azongi epai ya Eli mpe alobi: ‘Ngai oyo. Mbala oyo obengi ngai mpenza.’ Bongo Eli ayei koyeba ete Yehova nde moto azali kobenga mwana. Yango wana, alobi na ye ete: ‘Kende kolala, mpe soki abengi yo, osengeli koloba ete: “Lobá Yehova, mpo mosaleli na yo azali koyoka.” ’

Samwele asali mpe bongo ntango Yehova abengi ye lisusu. Na nsima, Yehova ayebisi ye ete akopesa Eli ná bana na ye etumbu. Bongo Hofini ná Finehase bakufi na etumba oyo bakendeki kobunda na Bafilistia, mpe ntango Eli ayoki nsango yango, akwei na nse, abukani nkingo mpe akufi. Liloba ya Yehova ekokisami.

Ntango Samwele akoli, akómi mosambisi ya nsuka ya Yisraele. Ntango akómi mobange, Bayisraele balobi na ye ete: ‘Ponelá biso mokonzi ayangelaka biso.’ Samwele asepeli na likambo wana te, mpo Yehova nde mokonzi na bango. Kasi Yehova ayebisi ye ete ayokela bango.

1 Samwele 1:1-28; 2:11-36; 4:16-18; 8:4-9.



Mituna

  • Nkombo ya elenge mobali oyo bozali komona na elilingi oyo nani, mpe bato mosusu wana ezali banani?
  • Libondeli nini Hana asalaki mokolo moko oyo ayaki na tabernakle ya Yehova, mpe ndenge nini Yehova ayanolaki ye?
  • Samwele azalaki na mbula boni ntango bakendaki na ye na tabernakle mpo akoka kosalela Yehova, mpe mbula na mbula, mama na ye azalaki kosalela ye nini?
  • Nkombo ya bana ya Eli ya mibali ezali banani, mpe bazali bato ya ndenge nini?
  • Ndenge nini Yehova abengaki Samwele, mpe apesaki ye nsango nini?
  • Ntango Samwele akoli, akómaki nani, mpe likambo nini elekaki ntango akómaki mobange?

Mituna mosusu