Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 57: Nzambe aponi Davidi

Lisolo 57: Nzambe aponi Davidi
Davidi abikisi mwana-mpate

BOYEBI likambo oyo eleki awa? Elenge mobali oyo auti kobikisa mwana-mpate oyo urse ekangaki. Urse moko ememaki mwana-mpate mpo na kolya yango. Elenge mobateli ya mpate alandi ye, azwi ye mpe abɔtɔli mwana-mpate yango. Mpe ntango urse esiliki mpe etɛlɛmi, elenge mobali wana asimbi urse yango mpe abomi yango. Mokolo mosusu, abikisi mpate mosusu na mabɔkɔ ya nkɔsi. Elenge mobali yango azali na mpiko mpenza! Oyebi elenge yango?

Ezali Davidi. Davidi azalaki kofanda na Beteleme. Nkɔkɔ na ye ya mobali nkombo na ye Obede, mwana oyo Ruta ná Boaze babotaki. Boyebi bato yango lisusu? Tata ya Davidi nkombo na ye Yese. Davidi azalaki kobatela bampate ya tata na ye. Abotamaki mbula zomi nsima ya ntango oyo Yehova aponaki Saulo mokonzi.

Mokolo moko, Yehova alobi na Samwele ete: ‘Kamatá mafuta mosantu mpe kende na Beteleme, na ndako ya Yese. Naponi mwana na ye moko ya mobali azala mokonzi.’ Ntango Samwele akómi na Beteleme, amoni Eliabe, mwana mobali ya liboso ya Yese, alobi na motema na ye ete: ‘Nakanisi moto Yehova aponi ye oyo.’ Kasi Yehova alobi na ye ete: ‘Kotala molai na ye ná kitoko na ye te. Naponi ye mokonzi te.’

Bongo Yese abengi mwana na ye mosusu, Abinadabe mpe alakisi ye Samwele. Kasi Samwele alobi ete: ‘Yehova aponi ata oyo te.’ Na nsima, Yese ayei na Shama mpe Samwele alobi ete: ‘Yehova aponi ata oyo mpe te.’ Yese alakisi Samwele bana mibali na ye nsambo, kasi Yehova aponi moko na bango te. Samwele atuni ete: ‘Bana nyonso ya mibali basili?’

Yese azongisi ete: ‘Etikali leki na bango. Kasi azali awa te, azali kobatela bampate.’ Ntango bayei na Davidi, Samwele amoni ete azali kitoko. Yehova alobi na Samwele ete: ‘Ye oyo! Tɛlɛmá, tyá ye mafuta.’ Samwele asali mpe bongo. Yango wana, mokolo mosusu Davidi akokóma mokonzi ya Yisraele.

1 Samwele 17:34, 35; 16:1-13.



Mituna

  • Nkombo ya elenge mobali oyo ozali komona na elilingi oyo nani, mpe ndenge nini toyebi ete azali na mpiko?
  • Davidi afandaka wapi, mpe nkombo ya tata na ye nani, mpe ya nkɔkɔ na ye ya mobali nani?
  • Mpo na nini Yehova ayebisi Samwele akende na ndako ya Yese na Beteleme?
  • Likambo nini eleki ntango Yese alakisi Samwele bana na ye ya mibali nsambo?
  • Ntango bayei na Davidi, Yehova alobi na Samwele nini?

Mituna mosusu