Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 59: Davidi akimi Saulo

Lisolo 59: Davidi akimi Saulo

NTANGO Davidi abomi Goliate, na nsima Abinere, mokonzi ya basoda ya Yisraele, akei na Davidi epai na Saulo. Saulo asepeli na Davidi mingi. Atye ye mokonzi ya basoda; azwi ye akóma kofanda na ndako na ye.

Mokolo moko, basoda bauti etumba, balongi Bafilistia; basi bazali koyemba ete: ‘Saulo abomi bankóto kasi Davidi abomi bankóto zomi zomi.’ Saulo ayoki zuwa mpo bakumisi Davidi koleka ye. Kasi Yonatane, mwana ya Saulo, ayoki zuwa te. Alingi Davidi mingi mpenza, Davidi mpe alingi ye mingi mpenza. Yango wana, bapesani elaka ete bakozala baninga libela.

Mokonzi Saulo azali kobamba likɔnga

Davidi ayebi kobɛta nzɛnzɛ mpe Saulo azali kolinga miziki ya Davidi. Kasi, mokolo moko, zuwa ya Saulo etindi ye asala likambo moko ya nsɔmɔ. Ntango Davidi azali kobɛta nzɛnzɛ, Saulo akamati likɔnga na ye abambi Davidi, mpe alobi ete: ‘Nakobaka Davidi na efelo!’ Kasi Davidi akimisi nzoto, likɔnga yango ezwi ye te. Na nsima, Saulo abambi ye lisusu likɔnga kasi ezwi ye mpe te. Bongo Davidi ayebi ete asengeli kokeba makasi.

Bozali koyeba lisusu elaka oyo Saulo apesaki? Alobaki ete akopesa moto oyo akoboma Goliate mwana na ye ya mwasi. Na nsima, Saulo ayebisi Davidi ete akopesa ye mwana na ye Mikale azala mwasi na ye, kasi liboso aboma naino Bafilistia nkama moko (100). Bozali koyeba motambo oyo? Saulo azali na elikya ete Bafilistia bakoboma Davidi. Kasi babomi Davidi te. Bongo Saulo akamati mwana na ye Mikale, apesi ye Davidi mpo azala mwasi na ye.

Mokolo moko, Saulo ayebisi Yonatane ná basaleli na ye nyonso ete alingi aboma Davidi. Kasi Yonatane ayebisi tata na ye ete: ‘Kosala Davidi mabe te. Ye asaleli yo mabe te. Kutu makambo nyonso oyo asali esalisi yo mingi. Atyaki bomoi na ye na likama mokolo abomaki Goliate. Omonaki yango mpe osepelaki.’

Davidi akimi likɔnga

Saulo ayokeli mwana na ye, mpe alaki ete akoboma Davidi te. Bongo Davidi ayei lisusu epai ya Saulo mpe azongeli mosala na ye. Kasi, mokolo moko boye, Davidi azali kobɛta nzɛnzɛ, Saulo abambi ye lisusu likɔnga. Davidi akimisi nzoto mpe likɔnga ekɔti na efelo. Wana mbala ya misato. Na yango, Davidi amoni ete asengeli kokima.

Na butu wana, Davidi akei na ndako na ye. Kasi Saulo atindi bato kuna mpo báboma ye. Mikale ayebi likambo tata na ye alingi kosala. Yango wana, ayebisi Davidi ete: ‘Soki okimi na butu oyo te, lobi okozala ebembe.’ Kaka na butu yango, Mikale akimisi Davidi na lininisa. Na boumeli ya mbula soki nsambo, Davidi akómi komibombabomba, mpo Saulo azwa ye te.

1 Samwele 18:1-30; 19:1-18.



Mituna

  • Mpo na nini Saulo azali koyokela Davidi zuwa makasi, kasi mpo na nini Yonatane, mwana mobali ya Saulo, azalaki na zuwa te?
  • Likambo nini esalemaki mokolo moko ntango Davidi azalaki kobɛtela Saulo nzɛnzɛ?
  • Saulo asɛngaki Davidi asala nini liboso apesa ye mwana na ye ya mwasi Mikale mpo azala mwasi na ye, mpe mpo na nini Saulo alobaki na ye bongo?
  • Ndenge ozali komona yango na elilingi, likambo nini esalemaki mpo na mbala ya misato, wana Davidi azalaki kobɛtela Saulo nzɛnzɛ?
  • Mikale asalaki ndenge nini mpo abikisa Davidi, mpe na nsima Davidi asengelaki kosala nini na boumeli ya mbula nsambo?

Mituna mosusu