Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 60: Abigaile ná Davidi

Lisolo 60: Abigaile ná Davidi

BOYEBI mwasi kitoko oyo azali koya kokutana na Davidi? Nkombo na ye Abigaile. Azali mwasi ya bwanya mpe azali kopekisa Davidi ete asala likambo ya mabe te. Kasi tótala naino makambo oyo ekómelaki Davidi.

Davidi azali kokima Saulo, akei komibomba na mobenga. Bandeko na ye ya mibali mpe libota na ye balandi ye kuna. Bato soki nkama minei (400) bayei epai na ye, mpe akómi mokonzi na bango. Bongo Davidi akei epai ya mokonzi ya Moabe mpe alobi na ye ete: ‘Nabondeli yo, tiká tata na ngai ná mama na ngai báfanda elongo na bino tii nakoyeba nini ekokómela ngai.’ Na nsima, Davidi ná bato na ye babandi komibomba na bangomba.

Nsima na yango nde Davidi akutanaki na Abigaile. Mobali na ye azali na mabele mingi mpe na bozwi. Azali na mpate nkóto misato (3 000) mpe ntaba nkóto moko (1 000). Nabale azali na motema mabe. Kasi mwasi na ye Abigaile azali mwasi kitoko mingi, mpe ayebi kosala oyo ezali malamu. Mokolo mosusu abikisaki bato ya ndako na ye. Tótala ndenge asalaki yango.

Davidi ná bato na ye basalelaki Nabale boboto mingi. Basalisaki ye na kobatela bampate ná bantaba na ye. Bongo, mokolo moko boye, Davidi atindi bato na ye epai ya Nabale mpo asalela bango boboto. Bato ya Davidi bakómeli Nabale ntango ye ná basali na ye bazali kokata nsuki ya bampate. Mokolo yango ezali mokolo ya fɛti mpe Nabale abongisi biloko ya kolya ebele. Bongo, bato ya Davidi balobi na ye ete: ‘Tosalelaki yo boboto. Toyibaki mpate na yo ata moko te, kasi tosalisaki nde na kobatela yango. Yango wana, tobondeli yo, pesá biso mwa biloko ya kolya.’

Nabale azongisi ete: ‘Nakopesa bato lokola bino eloko moko te.’ Alobi mabe mpe atyoli Davidi. Ntango bato yango bazongi, bayebisi Davidi makambo nyonso oyo Nabale alobi, mpe Davidi ayoki nkanda makasi. Ayebisi bato na ye ete: ‘Bólata mipanga na bino.’ Mpe bango wana bazali kokende koboma Nabale ná bato na ye.

Nzokande, moko ya bato ya Nabale ayokaki maloba mabe nyonso oyo Nabale abimisaki, akei koyebisa Abigaile. Abigaile akamati biloko ya kolya nokinoki, amemisi mpunda mpe akei. Ntango akutani na Davidi, akiti na mpunda na ye, afukami mpe alobi ete: ‘Nabondeli yo, nkolo na ngai, kolanda maloba ya mobali na ngai Nabale te. Azali zoba mpe asalaka kaka makambo ya bozoba. Talá likabo nayeli yo. Nabondeli yo ondima yango, mpe limbisá biso mpo na likambo yango.’

Abigaile ayeli Davidi biloko

Davidi azongisi ete: ‘Ozali mwasi ya bwanya. Opekisi ngai naboma Nabale, mpe nazongisela ye te mabe oyo asaleli ngai. Zongá na kimya.’ Na nsima, ntango Nabale akufi, Abigaile akómi moko ya basi ya Davidi.

1 Samwele 22:1-4; 25:1-43.



Mituna

  • Na elilingi oyo, mwasi oyo azali koya kokutana na Davidi nkombo na ye nani, mpe azali mwasi ya ndenge nini?
  • Nabale azali nani?
  • Mpo na nini Davidi atindi bato na ye mosusu bákende kosɛnga Nabale bilei?
  • Nabale ayebisi bato ya Davidi nini, mpe Davidi asali nini?
  • Ndenge nini Abigaile amonisi ete azali mwasi moko ya bwanya?

Mituna mosusu