Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 63: Salomo, mokonzi na bwanya

Lisolo 63: Salomo, mokonzi na bwanya

SALOMO akómi mokonzi ntango azali naino elenge mpenza. Alingi Yehova mpe alandi toli oyo Davidi, tata na ye, apesaki ye. Yehova asepeli na Salomo; yango wana, na butu moko boye, atuni ye na ndɔtɔ ete: ‘Salomo, olingi napesa yo nini?’

Salomo azongisi ete: ‘Yehova Nzambe na ngai, nazali elenge mpenza mpe nayebi koyangela te. Pesá ngai bwanya mpo nayangela basaleli na yo malamu.’

Yehova asepeli mingi na likambo oyo Salomo asɛngi. Yango wana alobi ete: ‘Lokola osɛngi nde bwanya kasi bomoi molai to bozwi te, nakopesa yo bwanya koleka moto nyonso, ezala liboso to nsima na yo. Nakopesa yo mpe oyo osɛngi te: bozwi ná nkembo.’

Mwa moke na nsima, basi mibale bayeli Salomo likambo moko ya monene. Moko na bango alobi ete: ‘Ngai ná mwasi oyo tofandaka ndako moko. Nabotaki mwana mobali, mpe nsima ya mikolo mibale ye mpe aboti mwana mobali. Na nsima, na butu, mwana na ye akufi. Kasi ntango nalali, alalisi ebembe ya mwana na ye pembeni na ngai, mpe akamati mwana na ngai. Ntango nalamuki, natali mwana yango malamumalamu, namoni ete ezali mwana na ngai te.’

Bongo mwasi oyo mosusu wana alobi ete: ‘Te! Mwana ya bomoi nde ya ngai, oyo akufi nde ya ye!’ Kasi mwasi ya liboso azongisi ete: ‘Te! Mwana na yo nde oyo akufi, mpe oyo azali na bomoi nde ya ngai!’ Mpe basi yango bakómi kowelana ndenge wana liboso ya mokonzi. Salomo akosala nini?

Asɛngi báyela ye mopanga mpe ntango bayei na yango, alobi ete: ‘Bókata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, mpe bópesa mwasi mokomoko eteni moko.’

Mama ya solo aleli mpe alobi ete: ‘Te! Nabondeli bino, bóboma mwana te. Bópesa ye mwana yango!’ Kasi mwasi mosusu alobi ete: ‘Bópesa moko na biso mwana yango te; bókata ye kaka!’

Mokonzi Salomo akati likambo ya makasi

Na nsuka, Salomo alobi ete: ‘Bóboma mwana yango te. Bópesa ye mwasi ya liboso. Ye nde mama na ye mpenza.’ Salomo amikosaki te: mama ya solo alingi mwana na ye mingi, yango wana amoni malamu apesa ye ata mwasi mosusu wana mpo abomama te. Ntango bato bayoki ndenge Salomo akati likambo yango, basepeli kozala na mokonzi ya bwanya ndenge wana.

Ntango Salomo azali koyangela, Nzambe apamboli bato; bilanga ya blé ná ya ɔrje, ya vinyo ná ya figi mpe biloko mosusu eboti mingi mpenza. Bato bazali kolata bilamba ya kitoko mpe bafandi na bandako ya malamu. Moto nyonso azali na biloko ya kitoko beboo.

1 Bakonzi 3:3-28; 4:29-34.



Mituna

  • Yehova asɛngi Salomo nini, mpe eyano nini ye apesi?
  • Lokola Yehova asepeli na eloko Salomo asɛngi, alaki ete akopesa ye nini?
  • Wapi likambo ya monene basi mibale bayei na yango epai ya Salomo?
  • Ndenge ozali komona yango na elilingi, ndenge nini Salomo akati likambo yango?
  • Boyangeli ya Salomo ezali ndenge nini, mpe mpo na nini ezali bongo?

Mituna mosusu