Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 64: Salomo atongi tempelo

Lisolo 64: Salomo atongi tempelo

LIBOSO Davidi akufa, apesi Salomo baplan ya tempelo oyo Yehova apesaki ye. Salomo, na mbula ya minei ya boyangeli na ye, abandi kotonga tempelo; mosala yango esilaki nsima ya mbula nsambo na ndambo. Ebele ya basali basalaki mosala yango, mpe mosala yango esɛngaki mosolo mingi mpenza, mpo basalelaki wolo ná palata ebele.

Tempelo ezalaki na biteni mibale ya minene, ndenge tabernakle ezalaki na yango. Kasi biteni yango elekaki oyo ya tabernakle na monene mbala mibale. Salomo atyaki sanduku ya kondimana na eteni ya kati, mpe atyaki biloko mosusu oyo ezalaki na kati ya tabernakle na eteni mosusu.

Ntango basilisi kotonga tempelo, basali fɛti monene. Salomo afukami liboso ya tempelo mpe abandi kobondela, ndenge bozali komona na elilingi oyo. Alobi na Yehova ete: ‘Ata likoló mobimba ezali kokoka yo te, bongo tempelo oyo, ekokoka yo nde? Ata bongo, Ee Nzambe na ngai, nabondeli yo, yoká bato na yo ntango bazali kobondela yo, batali na ngámbo ya esika oyo.’

Mokonzi Salomo azali kobondela

Ntango Salomo asilisi kobondela, mɔtɔ euti na likoló ekiti mpe ezikisi banyama oyo bapesaki mbeka. Mpe Yehova angɛngisi tempelo mobimba. Yango emonisi ete Yehova azali koyoka, asepeli na tempelo oyo Salomo atongi mpe na libondeli oyo asali. Banda na ntango yango, tempelo ekómi esika oyo bato bazali koya kosambela, kasi tabernakle lisusu te.

Salomo ayangelaki na bwanya bambula mingi mpenza, mpe bato bazalaki na esengo. Kasi Salomo abalaki ebele ya basi ya bikólo mosusu, oyo bazalaki kosambela Yehova te. Bozali komona moko na bango liboso ya ekeko na ye? Nsukansuka, basi ya Salomo babendi ye na losambo ya banzambe mosusu. Boyebi nini eleki ntango Salomo asali bongo? Azali kosalela bato makambo na boboto lisusu te. Akómi konyokola bango mpe bazali lisusu na esengo te.

Mokonzi Salomo azali kosambela ekeko

Yehova ayokeli Salomo nkanda makasi, mpe alobi na ye ete: ‘Nakobɔtɔla yo bokonzi mpe nakopesa yango moto mosusu. Nzokande nakosala yango na mikolo na yo te, kasi na boyangeli ya mwana na yo. Ata bongo nakobɔtɔla ye bato nyonso te.’ Tótala ndenge likambo yango elekaki.

1 Ntango 28:9-21; 29:1-9; 1 Bakonzi 5:1-18; 2 Ntango 6:12-42; 7:1-5; 1 Bakonzi 11:9-13.



Mituna

  • Salomo asilisi kotonga tempelo ya Yehova nsima ya mbula boni, mpe mpo na nini esɛngaki mbongo mingi?
  • Tempelo ezalaki na biteni ya minene boni, mpe batyaki eloko nini na kati ya moko ya biteni yango?
  • Na libondeli oyo Salomo asali ntango tempelo esili, alobaki nini?
  • Ndenge nini Yehova amonisi ete asepeli na libondeli ya Salomo?
  • Basi ya Salomo bamemi ye na kosala nini, mpe nini ekómeli Salomo?
  • Mpo na nini Yehova ayokeli Salomo nkanda, mpe Yehova alobi na ye nini?

Mituna mosusu