Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 65: Bokonzi ekabwani

Lisolo 65: Bokonzi ekabwani

BOYEBI mpo na nini moto oyo azali kopasola elamba na ye? Yehova atindi ye apasola yango. Moto yango ezali mosakoli Ahiya. Mosakoli ezali nani? Mosakoli ezali moto oyo Nzambe ayebisaka ye liboso mpenza makambo oyo ekosalema.

Ahiya ná Yeroboame

Awa mosakoli Ahiya azali koloba na Yeroboame. Yeroboame ezali moto oyo Salomo atyaki mokɛngɛli ya ndambo ya misala na ye ya kotonga. Ntango mosakoli Ahiya akutani na Yeroboame, asali likambo ya kokamwa. Alongoli elamba ya likoló oyo alati mpe apasoli yango na biteni zomi na mibale. Na nsima, alobi na Yeroboame ete: ‘Zwá biteni zomi.’ Mpo na nini Ahiya apesi Yeroboame biteni zomi?

Mosakoli Ahiya alimboli ete Yehova akobɔtɔla Salomo bokonzi. Akopesa Yeroboame mabota zomi. Yango elingi koloba ete Rehoboame, mwana ya Salomo, akoyangela kaka mabota mibale oyo etikali.

Ntango Salomo ayoki likambo yango, ayoki nkanda makasi. Aluki kutu koboma Yeroboame. Kasi Yeroboame akimi na Ezipito. Nsima ya mwa ntango, Salomo akufi. Ayangelaki mbula ntuku minei (40). Mwana na ye Rehoboame akómi mokonzi. Kuna na Ezipito, Yeroboame ayoki ete Salomo akufi, yango wana azongi na Yisraele.

Rehoboame azali mokonzi mabe. Kutu azali mabe koleka tata na ye Salomo. Yeroboame ná bankumu mosusu bayei kosɛnga Rehoboame ete asalela bato makambo na boboto. Kasi Rehoboame aboyi koyokela bango. Akómi kutu mabe koleka. Yango wana, bato batye Yeroboame mokonzi ya mabota zomi, kaka mabota mibale, ya Yuda ná ya Benyamina, nde batikaki Rehoboame azala mokonzi na bango.

Yeroboame aboyi bato na ye bákende kosambela na tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Yango wana, asali bana mibale ya ngɔmbɛ ya wolo mpe ayebisi bato ya mabota zomi ete básambelaka yango. Mosika te mokili etondi na mobulu ya ndenge nyonso.

Mobulu ebimi mpe na bokonzi ya mabota mibale. Mbula mitano ekoki naino te banda Rehoboame akómi mokonzi, mokonzi ya Ezipito ayei kobundisa Yerusaleme. Abɔtɔli ebele ya biloko ya motuya oyo ezalaki na tempelo ya Yehova. Na yango, ntango basilisi kotonga tempelo, eumelaki lisusu bongo te bambula mingi.

1 Bakonzi 11:26-43; 12:1-33; 14:21-31.



Mituna

  • Tángá nkombo ya bato oyo ozali komona na elilingi oyo; mpe bazali banani?
  • Ahiya asali nini na elamba ya likoló oyo alataki, mpe likambo yango elimboli nini?
  • Salomo aluki kosala Yeroboame nini?
  • Mpo na nini bato batye Yeroboame mokonzi ya mabota zomi?
  • Mpo na nini Yeroboame asali bana mibale ya ngɔmbɛ ya wolo, mpe nini ekómeli mboka na nsima?
  • Nini ekómeli bokonzi ya mabota mibale mpe tempelo ya Yehova na Yerusaleme?

Mituna mosusu