Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 68: Bana mibale basekwi

Lisolo 68: Bana mibale basekwi

KANISÁ ete okufi mpe ozongi lisusu na bomoi, mama na yo akoyoka ndenge nini? Akoyoka esengo makasi mpenza! Kasi moto oyo akufi akoki nde kozonga na bomoi? Likambo ya boye esilá kosalema?

Bótala mobali oyo, ná mwasi wana, ná mwana mobali oyo. Mobali wana bozali komona ezali mosakoli Eliya. Mwasi oyo ayambi mwana ezali mwasi moko ya engumba Zarefate, mobali na ye akufá; mwana wana ezali mwana na ye. Mokolo moko, mwana ya mwasi yango abɛli. Maladi na ye ekómi makasi mpenza mpe nsukansuka akufi. Bongo Eliya alobi na mwasi yango ete: ‘Pesá ngai mwana yango.’

Eliya ná mwasi oyo mobali akufá, mpe mwana ya mwasi yango oyo Eliya asekwisi

Eliya amati na mwana na shambrɛ ya likoló epai azalaki kolala mpe alalisi ye na mbeto. Na nsima abondeli boye: ‘Ee Yehova, zongisá mwana oyo na bomoi!’ Mwana yango azongi na bomoi. Na nsima, Eliya akiti na mwana yango, apesi ye mama na ye mpe alobi na ye ete: ‘Talá, mwana na yo azongi na bomoi!’ Mama ya mwana yango asepeli mingi mpenza.

Mosakoli monene mosusu ezali Elisha. Ye azalaki kosalisa Eliya. Yehova apesaki ye mpe nguya ya kosala makamwisi. Mokolo moko, Elisha akei na engumba Shuneme, epai mwasi moko amoniselaki ye boboto mingi. Na nsima, mwasi yango aboti mwana mobali.

Mokolo mosusu ntango mwana akómi mokóló, akei kotala tata na ye na elanga. Kasi na mbala moko abandi kolela motó mpasi. Bazongisi ye na ndako mpe na nsima mwana yango akufi. Mama na ye ayoki mawa mpenza. Na mbala moko, akei koluka mosakoli Elisha.

Ntango Elisha akómi, akɔti na ebembe na shambrɛ. Abondeli Yehova mpe alaleli ebembe. Mosika te, nzoto ya mwana yango ezwi mɔtɔ, na nsima akɔsɔli mbala nsambo mpe afungoli miso. Mama ya mwana yango ayoki esengo ntango akuti mwana na ye na bomoi!

Bato mingi bakufá. Bandeko na bango ná baninga na bango bayokaki mawa mpenza! Biso tozali na nguya ya kosekwisa bato te, kasi Yehova azali na nguya wana. Na nsima, tokomona ndenge akozongisa na bomoi bamilio ya bato oyo bakufá.

1 Bakonzi 17:8-24; 2 Bakonzi 4:8-37.


Mituna

  • Bato misato oyo ozali komona na elilingi oyo ezali banani, mpe likambo nini ekómeli mwana mobali oyo?
  • Libondeli nini Eliya asali mpo na mwana yango, mpe likambo nini esalemi na nsima?
  • Nkombo ya moto oyo azali kosalisa Eliya nani?
  • Mpo na nini babengaki Elisha na ndako ya mwasi moko na Shuneme?
  • Elisha asali nini, mpe likambo nini esalemi mpo na mwana oyo akufaki?
  • Ndenge Eliya ná Elisha bamonisi yango, Yehova azali na nguya nini?

Mituna mosusu