Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 70: Yona ná mbisi monene

Lisolo 70: Yona ná mbisi monene

BOMONI moto wana, oyo azali kozinda na mai? Azali na likama mpenza. Mbisi ya monene wana ekomɛla ye. Boyebi nkombo ya moto yango? Nkombo na ye Yona. Ebandi boni likambo ya boye ekómela ye?

Yona azali mosakoli ya Yehova. Mwa moke ya nsima ya liwa ya mosakoli Elisha, Yehova ayebisi Yona boye: ‘Kende na Ninive engumba monene. Mabe na bango eleki mingi. Nalingi okende koyebisa bango likambo yango.’

Yona ná mbisi ya monene

Kasi Yona alingi kokende kuna te. Yango wana, na esika akende na Ninive, akɔti nde na masuwa oyo ezali kokende epai mosusu. Yehova asepeli te ndenge Yona akimi. Yango wana, atindi mopɛpɛ ya makasi. Mopɛpɛ yango eleki makasi, mpe masuwa elingi kozinda. Bongo, bato oyo basalaka na masuwa babandi kobanga makasi mpe babandi kobondela banzambe na bango mpo básalisa bango.

Nsukansuka, Yona ayebisi bango ete: ‘Ngai nasambelaka Yehova, Nzambe oyo asalá likoló ná mabele. Nazali kokima mpo naboyi kosala mosala oyo Yehova atindi ngai.’ Bongo, bato yango batuni ye ete: ‘Tósala yo nini mpo mopɛpɛ esila?’

Yona alobi ete: ‘Bóbwaka ngai na mbu mpe mbu ekofanda lisusu nyɛɛ.’ Liboso bato yango baboyi naino. Kasi lokola mopɛpɛ engali lisusu koleka, nsukansuka babwaki Yona na mbu. Bongo mopɛpɛ esili na mbala moko mpe mbu efandi nyɛɛ.

Ntango Yona azali kozinda na kati ya mai, mbisi ya monene emɛli ye. Kasi akufi te. Aumeli na libumu ya mbisi yango mikolo misato butu moi. Yona azali koyoka mawa lokola atosaki Yehova te, ntango atindaki ye akende na Ninive. Bongo boyebi likambo asali?

Yona abandi kobondela Yehova asalisa ye. Yehova atindi mbisi yango esanza ye na mokili. Na nsima, Yona akei na Ninive. Lisolo oyo eteyi biso ete kosalaka makambo nyonso oyo Nzambe alobi na biso, ezali na ntina mingi.

Mokanda ya Yona.



Mituna

  • Yona azali nani, mpe Yehova alobi na ye asala nini?
  • Lokola alingi kokende te epai Yehova atindi ye, Yona asali nini?
  • Yona alobi na basali ya masuwa básala nini mpo mopɛpɛ ekita?
  • Ndenge ozali komona na elilingi, likambo nini esalemi ntango Yona azindi na mai?
  • Yona aumeli mikolo boni na libumu ya mbisi yango ya monene, mpe azali kosala nini kuna?
  • Yona akei wapi nsima ya kobima na libumu ya mbisi ya monene, mpe likambo yango eteyi biso nini?

Mituna mosusu