Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 73: Mokonzi malamu ya nsuka

Lisolo 73: Mokonzi malamu ya nsuka

YOSIYA azali na mbula mwambe mpamba ntango akómi mokonzi ya mabota mibale, na sudi. Azali naino mwana moke mpenza. Yango wana, na ebandeli, mikóló mosusu basalisaki ye mpo ayangela malamu.

Na mbula ya mwambe ya boyangeli na ye, abandi koluka Yehova. Alandi ndakisa ya bakonzi malamu lokola Davidi, Yehoshafate ná Hizikiya. Na nsima, atako Yosiya azali naino elenge, asali likambo moko monene mpenza.

Mokonzi Yosiya ná mibali oyo bazali kobuka bikeko

Na boumeli ya bambula ebele, Bayisraele mingi bazali kosala makambo ya mabe mpenza. Bazali kosambela banzambe ya lokuta. Bazali kofukamela bikeko. Bongo Yosiya ná bato na ye babandi kolongola losambo ya lokuta na mokili na bango. Mosala yango ezali monene, mpo bato ebele bazali kosambela banzambe ya lokuta. Awa bozali komona Yosiya ná bato na ye bazali kobuka bikeko.

Na nsima, Yosiya aponi bato misato bábongisa tempelo ya Yehova. Bapesi bango mbongo oyo bato bapesaki mpo na kobongisa tempelo. Nzokande, ntango bato bazali kosala mosala na tempelo, nganga-nzambe monene Hilikiya amoni eloko moko ya ntina mingi na kati. Ezali buku ya mibeko, oyo Yehova atindaki Moize akoma na ntango ya kalakala. Mokanda yango ebungá kala mpenza.

Bayeli Yosiya buku yango, mpe asɛngi ete bátángela ye yango. Ntango ayoki maloba ya buku yango, amoni ete bato bazali kotosa mobeko ya Yehova te. Ayoki mawa mingi mpe apasoli bilamba na ye, ndenge bozali komona na elilingi oyo. Na nsima alobi boye: ‘Yehova ayokeli biso nkanda mpo batata na biso baboyaki kotosa mibeko oyo ekomami na buku oyo.’

Hilikiya ná Mokonzi Yosiya

Yango wana, Yosiya atindi nganga-nzambe monene Hilikiya akende kotuna Yehova makambo oyo akosalela bango. Hilikiya akei kotuna mosakoli mwasi Huluda. Bongo ye apesi nsango oyo euti epai ya Yehova: ‘Yerusaleme mpe bato oyo bafandi wana bakozwa etumbu mpo basaleli banzambe ya lokuta mpe mokili etondi na mabe. Kasi lokola yo Yosiya osali oyo ezali sembo, etumbu yango ekoya nsima ya liwa na yo.’

2 Ntango 34:1-28.



Mituna

  • Yosiya azali na mbula boni ntango akómi mokonzi, mpe mosala nini abandi kosala na mbula ya mwambe ya boyangeli na ye?
  • Na elilingi ya liboso, ozali komona Yosiya azali kosala nini?
  • Nganga-nzambe monene amoni eloko nini ntango bato bazali kobongisa tempelo?
  • Mpo na nini Yosiya apasoli bilamba na ye?
  • Wapi nsango ya Yehova oyo mosakoli mwasi Huluda apesi Yosiya?

Mituna mosusu