Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 77: Baboyi kofukamela ekeko

Lisolo 77: Baboyi kofukamela ekeko

BOZALI koyeba lisusu bilenge mibali misato oyo? Ezali baninga ya Danyele oyo baboyaki kolya bilei oyo bamonaki ete ebongi na bango te. Bato ya Babilone bazalaki kobenga bango Shadrake, Meshake ná Abedenego. Kasi sikoyo, talá bango na elilingi oyo. Mpo na nini baboyi kofukamela ekeko molai ndenge bato mosusu bafukami? Tiká tólanda lisolo.

Bozali lisusu koyeba mibeko oyo Yehova ye moko akomaki, oyo babengaka Mibeko Zomi? Mobeko ya liboso elobi boye: ‘Osengeli kosambela banzambe mosusu te longola kaka ngai.’ Bilenge misato oyo bazali kotosa mobeko yango, atako ezali pɛtɛɛ te.

Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, abengisaki ebele ya bato minene mpo bákumisa ekeko oyo asali. Ntango bango nyonso basangani, atindi moto aloba boye: ‘Ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya nzɛnzɛ mpe bibɛtɛlo mosusu ya miziki, bosengeli kofukama mpe kosambela ekeko ya wolo oyo. Moto nyonso oyo akofukama te mpe akosambela te, akobwakama mbala moko na litumbu ya mɔtɔ makasi.’

Ntango Nebukadenezare ayoki ete Shadrake, Meshake ná Abedenego bafukami te, asiliki makasi. Bongo atindi bábenga bilenge yango. Apesi bango libaku mosusu ya kofukamela ekeko yango. Kasi bilenge yango batyeli Yehova motema, mpe bayebisi Nebukadenezare ete: ‘Nzambe na biso oyo tozali kosalela akoki kobikisa biso. Kasi ata soki abikisi biso te, tokofukamela ekeko na yo ya wolo te.’

Shadrake, Meshake, ná Abedenego

Ntango Nebukadenezare ayoki boye, nkanda na ye engali makasi. Litumbu ya mɔtɔ ezalaki pene wana, mpe mokonzi atindi ete bángalisa mɔtɔ yango mbala nsambo koleka ndenge basalaka. Na nsima, atindi basoda na ye oyo baleki makasi bákanga Shadrake, Meshake ná Abedenego mpe bábwaka bango na litumbu ya mɔtɔ yango. Lokola mɔtɔ yango eleki makasi, ebomi mibali makasi yango. Kasi nini ekómelaki bilenge misato wana?

Mokonzi atali na kati ya litumbu ya mɔtɔ mpe abangi makasi. Atuni ete: ‘Tokangaki mibali misato mpe tobwaki bango na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela makasi, boye te?’

Basaleli na ye bazongisi: ‘Ɛɛ.’

Bongo mokonzi abakisi ete: ‘Kasi nazali komona bato minei bazali kotambolatambola na katikati ya mɔtɔ. Bazali na nsinga na nzoto te, mpe bazali kozika te. Mpe moto ya minei azali lokola nzambe moko boye.’ Bongo mokonzi apusani pene na monɔkɔ ya litumbu ya mɔtɔ mpe abeleli ete: ‘Shadrake! Meshake! Abedenego! Basaleli ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, bóbima, bóya awa!’

Ntango babimi, moto nyonso amoni ete baziki te. Bongo mokonzi alobi ete: ‘Nzambe ya Shadrake, Meshake ná Abedenego akumisama! Ye atindi anzelu na ye mpe abikisi bango mpo baboyi kofukamela nzambe mosusu to kosambela ye, longola Nzambe na bango.’

Bilenge wana bapesi biso ndakisa malamu ya bosembo epai ya Yehova, mpe tosengeli kolanda ndakisa yango.

Kobima 20:3; Danyele 3:1-30.



Mituna

  • Mobeko nini Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, apesaki bato?
  • Mpo na nini baninga misato ya Danyele bafukameli ekeko ya wolo te?
  • Ntango Nebukadenezare apesaki Baebre misato wana libaku mosusu mpo báfukama, ndenge nini bamonisaki ete bazali kotyela Yehova motema?
  • Nebukadenezare asɛngi bato na ye básala Shadrake, Meshake, ná Abedenego nini?
  • Nebukadenezare amoni nini ntango atali na litumbu ya mɔtɔ?
  • Mpo na nini mokonzi akumisi Nzambe ya Shadrake, Meshake, ná Abedenego, mpe ndakisa nini batikeli biso?

Mituna mosusu