Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 78: Lobɔkɔ ekomi na efelo

Lisolo 78: Lobɔkɔ ekomi na efelo
Lobɔkɔ moko ezali kokoma na efelo

LIKAMBO nini ezali kosalema awa? Bato bazali na fɛti ya monene. Mokonzi ya Babilone nde moto abengisi bankóto ya bato minene ya bokonzi na ye na fɛti yango. Bazali kosalela bakɔpɔ ya wolo mpe ya palata, ná mabakuli oyo babɔtɔlaki na tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Kasi na mbala moko, misapi ya lobɔkɔ ya moto emonani mpe ebandi kokoma na efelo. Bato nyonso oyo bazali na fɛti babangi makasi.

Beleshazare ná bapaya na ye

Beleshazare, nkɔkɔ ya Nebukadenezare, nde moto azali mokonzi na ntango yango. Nsɔmɔ ezwi mokonzi, mpe agangi makasi ete báya na bato nyonso ya bwanya. Alobi na bango ete: ‘Moto nyonso oyo akotánga likomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango akozwa makabo mingi mpe akozala mokonzi ya misato na kati ya bokonzi.’ Kasi ata moto moko te na kati ya bato ya bwanya akoki kotánga likomi yango mpe koyebisa ndimbola na yango.

Mama ya mokonzi ayoki makɛlɛlɛ mpe akɔti na ndako ya fɛti. Alobi na mokonzi ete: ‘Nabondeli yo, kobanga te. Ezali na mobali moko na bokonzi na yo oyo ayebi banzambe basantu. Ntango nkɔkɔ na yo Nebukadenezare azalaki mokonzi, atyaki ye kapita ya bato na ye nyonso ya bwanya. Nkombo na ye Danyele. Tindá bato bábenga ye mpe akopesa yo ndimbola ya makambo oyo nyonso.’

Bongo bakɔtisi Danyele noki mpenza liboso ya mokonzi. Nsima ya koboya makabo nyonso oyo Mokonzi Beleshazare alaki ye, Danyele abandi koyebisa ye ntina oyo Yehova alongolaki nkɔkɔ na ye Nebukadenezare na bokonzi. Danyele alobi na ye ete ‘azalaki na lolendo mingi, yango wana Yehova apesaki ye etumbu.’

Bongo Danyele ayebisi Beleshazare ete: ‘Kasi yo, atako oyebi makambo nyonso oyo ekómelaki ye, ozali kaka na lolendo lokola Nebukadenezare. Oyei na bakɔpɔ ná mabakuli oyo eutaki na tempelo ya Yehova mpe omɛli na yango. Okumisi banzambe ya nzete mpe ya libanga, kasi okumisi Mozalisi na yo Monene te. Yango wana, Nzambe atindi lobɔkɔ ekoma maloba oyo.’

Danyele alobi ete: ‘Talá makambo oyo ekomami: MENE, MENE, TEKELE mpe PARASINE.’

‘MENE elimboli ete Nzambe atángi mikolo ya bokonzi na yo mpe asukisi yango. TEKELE elimboli ete batye yo na kilo mpe bamoni ete okoki te. PARASINE elimboli ete bapesi Bamede ná Baperse bokonzi na yo.’

Nzokande, ata na ntango oyo Danyele azali koloba, Bamede ná Baperse basilaki kobanda kobundisa Babilone. Na nsima bazwi mboka, mpe babomi Beleshazare. Na yango, makambo oyo lobɔkɔ ekomaki na efelo ekokisami kaka na butu wana. Kasi makambo nini ekokómela Bayisraele? Tokoyeba yango mosika te, kasi tótala naino likambo oyo ekómeli Danyele.

Danyele 5:1-31.



Mituna

  • Likambo nini esalemi ntango mokonzi ya Babilone asali fɛti monene mpe asaleli bakɔpɔ ná mabakuli oyo babɔtɔlaki na tempelo ya Yehova na Yerusaleme?
  • Beleshazare alobi nini na bato na ye ya bwanya, kasi likambo nini bango nyonso bakoki kosala te?
  • Mama ya mokonzi alobi na ye asala nini?
  • Na kotalela makambo oyo Danyele ayebisi mokonzi, mpo na nini Nzambe atindaki lobɔkɔ ekoma na efelo?
  • Ndenge nini Danyele alimboli maloba oyo ezali na efelo?
  • Likambo nini esalemi ntango Danyele azali naino koloba?

Mituna mosusu