Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 80: Balongwe na Babilone

Lisolo 80: Balongwe na Babilone

MBULA pene na mibale eleki uta Babilone ekwei na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse. Mpe talá likambo oyo ezali kosalema sikoyo. Bayisraele bazali kolongwa na Babilone. Bazwi bonsomi ndenge nini? Nani apesi nzela ete bákende?

Siruse, mokonzi ya Baperse, moto apesi bango nzela. Mbula mingi liboso Siruse abotama, Yehova atindaki mosakoli Yisaya akoma mpo na Siruse ete: ‘Okosala kaka oyo nakolinga ete osala. Baporte ekotikala polele mpo obɔtɔla engumba.’ Siruse atambwisaki basoda mpo na kobɔtɔla Babilone. Bamede ná Baperse bakɔtaki na Babilone na butu, na baporte oyo etikalaki polele.

Kasi mosakoli Yisaya alobaki mpe ete Siruse akopesa mitindo ete bato bátonga lisusu Yerusaleme mpe tempelo na yango. Siruse apesaki mpenza mitindo wana? Ɛɛ. Yoká makambo oyo ayebisi Bayisraele: ‘Sikoyo, bókende na Yerusaleme mpe bótonga tempelo ya Yehova, Nzambe na bino.’ Bayisraele oyo bozali komona na elilingi oyo bazongi na Yerusaleme mpo na mosala yango.

Bayisraele bazali kolongwa na Babilone

Kasi ezali Bayisraele nyonso te oyo bazali na Babilone nde bakosala mobembo molai wana tii na Yerusaleme. Ezali mobembo molai mpenza (kilomɛtrɛ soki 800), mpe Bayisraele mingi batikali mpo bakómi mibange to mpo bazali na maladi. Bamosusu mpe batikali mpo na ntina mosusu. Kasi Mokonzi Siruse ayebisi baoyo batikali ete: ‘Bato oyo bakei kotonga Yerusaleme mpe tempelo na yango, bópesa bango palata, wolo, ná makabo mosusu.’

Na yango, bapesi Bayisraele oyo bazongi na Yerusaleme makabo mingi. Siruse azongiseli bango mabakuli ná bakɔpɔ oyo Mokonzi Nebukadenezare azwaki na tempelo ya Yehova, ntango abebisaki Yerusaleme. Bongo bato bazongi na biloko ebele mpenza.

Nsima ya mobembo ya sanza soki minei, Bayisraele bakómi na Yerusaleme, kaka na ntango oyo esakolamaki. Ya solo, eleki mpenza mbula ntuku nsambo (70) banda engumba yango ebebisamaki, mpe mokili etikalaki mpamba. Kasi, atako Bayisraele bazali sika na ekólo na bango, bakokutana na mikakatano mosusu ndenge tokomona yango nsima.

Yisaya 44:28; 45:1-4; Ezera 1:1-11.



Mituna

  • Ndenge emonisami na elilingi, Bayisraele bazali kosala nini?
  • Ndenge nini Siruse akokisaki esakweli ya Yehova oyo apesaki na nzela ya Yisaya?
  • Siruse alobi nini na Bayisraele oyo bakokaki kozonga na Yerusaleme te?
  • Siruse apesi Bayisraele nini mpo bázonga na yango na Yerusaleme?
  • Bayisraele batamboli sanza boni mpo na kokóma na Yerusaleme?
  • Elekaki mbula boni banda mboka ebebisamaki mpe etikalaki mpamba?

Mituna mosusu