Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 6: Banda Yesu Kristo abotami tii akufi

Eteni 6: Banda Yesu Kristo abotami tii akufi

Nzambe atindaki anzelu Gabriele epai ya elenge mwasi moko, nkombo na ye Maria. Ayebisaki ye ete akobota mwana mobali, mpe mwana yango akozala mokonzi libela. Mwana wana, Yesu, abotamaki na elyelo ya bibwɛlɛ, epai babateli ya mpate bakendeki kotala ye. Na nsima, monzoto moko ekambaki bato oyo bauti na Ɛsti tii esika mwana moke yango azalaki. Tokoyeba nani abimisaki monzoto yango mpe ndenge oyo Yesu abikaki na liwa.

Na nsima, tokomona ete ntango Yesu akómaki na mbula zomi na mibale asololaki na bateyi na tempelo. Mbula zomi na mwambe na nsima, Yesu azwaki batisimo mpe abandaki mosala ya kosakola mpe koteya makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu aponaki bantoma zomi na mibale mpo básalisa ye na mosala yango.

Yesu asalaki mpe makamwisi mingi. Aleisaki ebele ya bato kaka na mbisi mpe mampa moke. Abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki bakufi. Mpo na kosukisa, tokoyekola makambo mingi oyo esalemaki na mokolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele mpe ndenge oyo babomaki ye. Yesu asakolaki mbula soki misato na ndambo. Eteni ya MOTOBA elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula koleka ntuku misato na minei (34) mwa moke.

Yesu azali koteya