Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 84: Anzelu akei epai ya Maria

Lisolo 84: Anzelu akei epai ya Maria

ELENGE mwasi kitoko oyo bozali komona awa nkombo na ye Maria. Azali Moyisraele mpe afandaka na mboka Nazarete. Nzambe ayebi ete azali elenge mwasi malamu mingi. Yango wana, Nzambe atindi anzelu Gabriele akende kosolola na ye. Boyebi makambo oyo anzelu Gabriele ayei koyebisa ye? Tóyoka yango.

Anzelu Gabriele alobi na ye boye: ‘Mbote, moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi. Yehova azali na yo.’ Maria amoná naino moto yango liboso te. Yango wana, azali komitungisa mpo ayebi likambo moto yango ayeli te. Kasi anzelu akitisi ye motema.

Maria

Alobi na ye ete: ‘Maria, kobanga te. Yehova asepeli na yo mingi. Yango wana, akosalela yo likambo ya kokamwa. Mosika te okobota mwana. Mpe okopesa ye nkombo Yesu.’

Mpe anzelu Gabriele abakisi ete: ‘Mwana yango akozala moto monene, mpe bakobenga ye Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló. Yehova akokómisa ye mokonzi, lokola Davidi. Kasi Yesu akozala mokonzi libela, mpe bokonzi na ye ekosuka te.’

Bongo Maria atuni ete: ‘Yango ekosalema ndenge nini? Ngai nabali naino te, mpe nafandi naino na mobali te, bongo nakobota mwana ndenge nini?’

Anzelu azongiseli ye ete: ‘Nguya ya Nzambe ekoyela yo. Yango wana, mwana yango akobengama Mwana ya Nzambe.’ Na nsima alobi na Maria ete: ‘Kanisá naino ndeko na yo Elizabeti. Bato bazalaki koloba ete akoki kobota te mpo akómi mokóló mingi. Kasi mosika te akobota mwana mobali. Omoni, ezali na eloko moko te oyo Nzambe akoki kolɛmba kosala yango.’

Maria azongisi na mbala moko ete: ‘Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai kaka ndenge olobi.’ Bongo anzelu atiki ye akei.

Na nsima, Maria akei kotala Elizabeti. Ntango Elizabeti ayoki mongongo ya Maria, mwana na kati ya libumu na ye apumbwe na esengo. Elizabeti atondi na elimo santu mpe alobi na Maria ete: ‘Opambwami na kati ya basi.’ Maria afandi epai ya Elizabeti soki sanza misato, na nsima azongi epai na ye na Nazarete.

Etikali ntango moke Maria abala mobali moko nkombo na ye Yozefe. Kasi, ntango Yozefe ayoki ete Maria azali na zemi, akanisi ete asengeli kobala ye te. Kasi anzelu ya Nzambe alobi na ye ete: ‘Kobanga te kobala Maria. Nzambe nde moto apesi ye mwana mobali wana.’ Bongo Maria ná Yozefe babalani mpe bazeli kobotama ya Yesu.

Luka 1:26-56; Matai 1:18-25.



Mituna

  • Mwasi oyo ozali komona na elilingi nkombo na ye nani?
  • Anzelu Gabriele ayebisi Maria nini?
  • Ndenge nini Gabriele alimboleli Maria ete akobota mwana atako afandi naino na mobali te?
  • Likambo nini eleki ntango Maria akei kotala ndeko na ye Elizabeti?
  • Yozefe akanisi kosala nini ntango ayoki ete Maria azali na zemi, kasi mpo na nini alongoli likanisi yango?

Mituna mosusu