Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 91: Yesu ateyi na ngomba

Lisolo 91: Yesu ateyi na ngomba

AWA bozali komona Yesu azali koteya bato na ngomba moko na Galile. Bayekoli na ye bafandi pene na ye. Aponi bato zomi na mibale na kati ya bato wana mpo bázala bantoma na ye. Bantoma ezali bayekoli ya ntina mingi. Boyebi nkombo na bango?

Yesu azali koteya

Simo Petro ná ndeko na ye Andre. Na nsima, Yakobo ná Yoane, bango mpe bazali bandeko. Ntoma mosusu mpe nkombo na ye Yakobo, mosusu mpe nkombo na ye Simo. Bantoma mibale mosusu nkombo na bango Yuda: Yuda Mokeriota mpe Yuda mosusu oyo bazalaki mpe kobenga ye Tade. Bantoma mosusu ezali Filipe ná Natanaele (nkombo na ye mosusu Bartelemi), ná Matai ná Toma.

Ntango bauti na Samaria, Yesu abandi kosakola mbala ya liboso ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’ Bokonzi yango ezali nini? Ezali guvɛrnema ya solo ya Nzambe. Yesu nde azali mokonzi na yango. Ntango Yesu akoyangela akozala na likoló, kasi akotya kimya awa na mabele. Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele mobimba paradiso.

Awa Yesu azali koteya makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Ayebisi bayekoli na ye ete: ‘Talá ndenge bosengeli kobondela. Tata na biso na likoló, nkombo na yo ekumisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema na mabele, ndenge ezali kosalema na likoló.’ Bato mosusu babengaka losambo yango ete ‘Losambo ya Nkolo.’ Bamosusu mpe babengaka yango ‘Tata wa biso.’ Boyebi losambo yango mobimba?

Yesu azali mpe koteya bato ndenge oyo basengeli kosalela bato mosusu makambo. Alobi ete: ‘Salelá baninga makambo oyo yo olingaka bango básalela yo.’ Ntango baninga bazali kosalela biso makambo na boboto tosepelaka. Yango wana, Yesu alobi ete biso mpe tosengeli kosalela baninga makambo na boboto. Ntango bato nyonso bakobanda kosala bongo, bomoi ekozala malamu mpenza awa na mabele oyo ekokóma paradiso!

Matai mokapo 5 tii 7; 10:1-4.



Mituna

  • Na elilingi oyo, Yesu azali koteya wapi, mpe banani bafandi penepene na ye?
  • Tángá nkombo ya bantoma 12.
  • Bokonzi oyo Yesu azali koteya ezali Bokonzi nini?
  • Yesu ateyi bato bábondelaka mpo na likambo nini?
  • Yesu alobi ete bato basengeli kosalelanaka makambo ndenge nini?

Mituna mosusu