Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 92: Yesu asekwisi bakufi

Lisolo 92: Yesu asekwisi bakufi

MWANA mwasi oyo bozali komona awa azali na mbula zomi na mibale. Yesu asimbi ye na lobɔkɔ, mpe baboti na ye batɛlɛmi pene na Yesu. Boyebi mpo na nini bazali na esengo boye? Tiká tótala likambo oyo esalami.

Yesu asekwisi mwana mwasi ya Yairuse

Tata ya mwana mwasi yango azali moto monene, nkombo na ye Yairuse. Mokolo moko boye, mwana na ye abɛli, balalisi ye na mbeto. Kasi mwana ayoki malamu te; maladi ekómi makasi. Yairuse ná mwasi na ye bazali komitungisa, noki mwana na bango akufa. Bazali kaka na mwana moko wana. Yairuse ayoki nsango ya makamwisi oyo Yesu azali kosala; yango wana akei koluka ye.

Ntango Yairuse amoni Yesu, ebele ya bato bazali zingazinga na ye. Kasi Yairuse aleki na katikati ya bato wana, akei kokwea na makolo ya Yesu. Alobi ete: ‘Mwana na ngai azali kobɛla makasi mpenza. Nabondeli yo, yaká kobikisa ye.’ Yesu andimi.

Wana bazali kokende, ebele ya bato balandi Yesu mpe bazingi ye epai na epai. Na mbala moko Yesu atɛlɛmi mpe atuni ete: ‘Nani asimbi ngai?’ Yesu atuni mpo ayoki nguya moko ebimi ye, yango wana ayebi ete moto moko asimbi ye. Kasi nani asimbi ye? Ezali mwasi moko oyo azalaki kobɛla, maladi na ye eumelaki mbula zomi na mibale. Ayei kosimba bilamba ya Yesu mpe abiki na mbala moko.

Ntango Yairuse amoni likamwisi yango ayoki esengo, mpo amoni ete ezali mpasi te ete Yesu abikisa moto. Kasi moto moko ayei koyebisa Yairuse ete: ‘Kotungisa Yesu lisusu te. Mwana na yo akufi.’ Ntango Yesu ayoki maloba yango alobi na Yairuse ete: ‘Komitungisa te, akobika.’

Ntango bakómi na ndako ya Yairuse, bakuti bato bazali kolela na mawa makasi. Kasi Yesu alobi na bango ete: ‘Bólela te. Mwana akufi te. Alali nde mpɔngi.’ Kasi bato yango babandi kosɛka mpe kotyola ye mpo bayebi ete mwana yango akufi.

Na nsima, Yesu akɔtisi baboti ya mwana yango ná bantoma na ye misato na ndako esika balalisi mwana yango. Asimbi mwana yango na lobɔkɔ mpe alobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá!’ Kaka na ntango yango, mwana azongi na bomoi ndenge bozali komona awa. Atɛlɛmi mpe abandi kotambola. Yango wana baboti na ye bazali na esengo mpenza.

Wana ezali moto ya liboso te oyo Yesu asekwisi. Biblia emonisi ete moto ya liboso oyo Yesu asekwisaki ezali mwana mobali ya mwasi moko ya engumba Naine oyo mobali na ye akufá. Na nsima, Yesu asekwisaki mpe Lazare, ndeko ya Marta ná Maria. Ntango Yesu akozala mokonzi, akosekwisa ebele ya bato oyo bakufá. Nsango yango ezali kosepelisa mpenza!

Luka 8:40-56; 7:11-17; Yoane 11:17-44.



Mituna

  • Nani tata ya mwana ya mwasi oyo ozali komona na elilingi oyo, mpe mpo na nini ye ná mwasi na ye bazali komitungisa?
  • Yairuse asali nini ntango amoni Yesu?
  • Likambo nini esalemi ntango Yesu azali kokende na ndako ya Yairuse, mpe nsango nini Yairuse azwi na nzela?
  • Mpo na nini bato oyo bazali na ndako ya Yairuse basɛki Yesu?
  • Nsima ya kokɔtisa bantoma na ye misato mpe baboti ya mwana mwasi yango na ndako, Yesu asali nini?
  • Yesu asekwisaki lisusu banani, mpe likambo yango emonisi nini?

Mituna mosusu