Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 95: Ndenge Yesu azali koteya

Lisolo 95: Ndenge Yesu azali koteya

MOKOLO moko Yesu ayebisi moto moko ete asengeli kolinga moninga to mozalani na ye. Bongo moto yango atuni Yesu ete: ‘Nani azali mozalani na ngai?’ Yesu ayebi makanisi ya moto yango. Moto yango akanisi ete kaka bato ya ekólo na ye mpe ya lingomba na ye nde bazali bazalani na ye. Kasi tólanda naino makambo oyo Yesu alobi na ye.

Mbala mingi Yesu azali koteya kaka na masolo. Mbala oyo mpe asali bongo. Alobeli lisolo ya Moyuda moko ná Mosamaria. Tosilaki komona ete Bayuda mingi balingaka Basamaria te. Tóyoka sikoyo lisolo yango:

Mokolo moko, Moyuda moko azalaki kokita na Yeriko, na nzela ya ngomba. Miyibi bakweli ye. Babɔtɔli ye mbongo, babɛti ye mpe batiki ye pene na liwa.

Na nsima, nganga-nzambe moko Moyuda aleki na nzela yango. Amoni moto yango. Akosala nini? Aleki na ngámbo mosusu akei, atiki moto yango alali kaka bongo. Moto mosusu mpe oyo alingi makambo ya Nzambe aleki na nzela yango. Azali Molevi. Akotɛlɛma? Te, aleki kaka, aboyi kosalisa moto yango. Na elilingi oyo, bozali komona nganga-nzambe ná Molevi bango wana bazali kokende.

Kasi nani azali kosalisa moto yango oyo miyibi babɛtaki? Ezali Mosamaria. Azali kosalisa Moyuda. Atye ye nkisi na mpota mpe azali kokanga yango. Na nsima, akei na Moyuda yango na esika oyo akoki kopema mpe kobika.

Mosamaria malamu

Na nsuka ya lisolo, Yesu atuni moto oyo atunaki ye motuna boye: ‘Kati na bango misato okanisi ete nani azali mozalani ya moto oyo miyibi babɛtaki? Nganga-nzambe, Molevi to Mosamaria?’

Moto yango azongisi ete: ‘Mosamaria. Ye nde amoniselaki moto yango boboto.’

Yesu alobi na ye ete: ‘Olobi malamu. Kende, bongo yo mpe salelá bato mosusu kaka bongo.’

Yesu ayebi mpenza koteya! Soki tozali koyoka makambo oyo alobi na kati ya Biblia, tokoyekola makambo mingi.

Luka 10:25-37.



Mituna

  • Moto moko atuni Yesu motuna nini, mpe mpo na nini atuni motuna yango?
  • Mbala mosusu Yesu azali kosalela nini mpo na koteya, mpe tosilaki kolobela nini mpo na Bayuda ná Basamaria?
  • Na lisolo oyo Yesu abɛti, nini ekómeli Moyuda moko oyo azali kokende na Yeriko?
  • Likambo nini esalemi ntango Moyuda moko oyo azali nganga-nzambe mpe Molevi moko baleki na nzela yango?
  • Na elilingi oyo, nani azali kosalisa Moyuda oyo abɛtami?
  • Motuna nini Yesu atuni ntango asilisi lisolo, mpe moto yango apesi eyano nini?

Mituna mosusu