Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 96: Yesu abikisi bato ya maladi

Lisolo 96: Yesu abikisi bato ya maladi

YESU azali kotambola na mokili mpe kobikisa bato ya maladi. Nsango ya makamwisi na ye epalangani na bamboka ya minene mpe ya mike. Bongo bayeli ye batɛngumi, bato oyo bakufá miso, bato oyo bayokaka te, mpe ebele ya bato mosusu ya maladi. Mpe Yesu abikisi bango nyonso.

Sikoyo eleki mbula misato banda Yoane abatisaki Yesu. Bongo Yesu ayebisi bantoma na ye ete mosika te akomata na Yerusaleme, mpe kuna bakoboma ye, mpe na nsima akosekwa. Kasi liboso ya ntango yango, Yesu azali kaka kobikisa bato ya maladi.

Yesu abikisi mwasi moko oyo azalaki na maladi

Mokolo moko boye, mokolo ya Sabata, Yesu azali koteya. Sabata ezali mokolo oyo Bayuda bapemaka. Mwasi oyo bozali komona awa azalaki na maladi makasi. Ekómi mbula zomi na mwambe banda mokɔngɔ na ye egumbamá, akokaka kotɛlɛma semba te. Bongo Yesu asimbi ye, mpe kaka na ntango yango abandi kotɛlɛma semba, mpe abiki.

Bakonzi ya mangomba bayoki nkanda. Moko na bango agangi makasi na kati ya bato ete: ‘Ezali na mikolo motoba oyo tosengeli kosala mosala. Yango nde mikolo bosengeli koya kobikisama, kasi na Sabata te!’

Yesu azongisi ete: ‘Bino bato mabe! Mokolo ya Sabata, mokomoko na bino afungolaka mpunda na ye mpe akendeke komɛlisa yango mai. Bongo ebongi te ete mwasi oyo abɛli mbula zomi na mwambe mobimba abikisama na mokolo ya Sabata?’ Maloba ya Yesu eyokisi bato mabe yango nsɔni.

Na nsima, Yesu ná bantoma na ye bakei na Yerusaleme. Nzokande, ntango bazali kobima na Yeriko, bato mibale oyo bakufá miso, oyo basɛngasɛngaka biloko, bayoki ete Yesu azali koleka wana. Bagangi ete: ‘Yesu, salisá biso!’

Yesu abengi bato yango mpe atuni bango ete: ‘Bolingi nasalela bino nini?’ Bazongisi ete: ‘Nkolo, miso na biso efungwama.’ Yesu asimbi miso na bango mpe na mbala moko bakómi komona. Boyebi ntina Yesu asalaki makamwisi wana nyonso? Asalaki yango mpo alingi bato mpe alingi ete bándimela ye. Na yango, tokoki mpenza kondima ete ntango akoyangela mabele, moto moko te akozala lisusu na maladi.

Matai 15:30, 31; Luka 13:10-17; Matai 20:29-34.



Mituna

  • Yesu asali nini ntango azali kotambola na mokili?
  • Mbula misato nsima ya batisimo ya Yesu, likambo nini ayebisi bantoma na ye?
  • Bato oyo ozali komona na elilingi ezali banani, mpe Yesu asali mwasi wana nini?
  • Mpo na nini eyano oyo Yesu apesi na maloba mabe oyo bakonzi ya mangomba babimisi eyokisi bango nsɔni?
  • Ntango Yesu ná bantoma na ye bakómi pene na Yeriko, asali nini na bato mibale oyo bakufá miso, oyo basɛngasɛngaka?
  • Mpo na nini Yesu azali kosala makamwisi?

Mituna mosusu